Osengeli kokata?
Basakoli mosusu bamesaná kosukisa kosakola na ngonga moko boye, ntango mosusu na midi. Ya solo, makambo mosusu ekoki kosala ete basakoli mosusu básukisa kosakola na ngonga moko boye. Kasi, okataka kosakola kaka mpo basakoli oyo obimaki na bango basukisi kosakola, to mpo basakoli mingi epai na bino bamesaná kosala bongo? Okoki kokoba kosakola mwa miniti mpe kosalela mitindo mosusu ya kosakola na ndakisa, kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso to na balabala? Okoki kozongela moto moko to bato mibale wana ozali kozonga ndako? Kanisá bolamu oyo okosala soki okutani lisusu ata na moto moko oyo asepelaki, to soki okaboli ata mwa bazulunalo na baleki-nzela! Na esika ya kokata, soki tokobi kosakola ata mwa miniti, ‘mbeka na biso ya lisanzoli’ ekobakisama.—Ebr. 13:15.