Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
Oyo ebimisamaki mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia báyeba ebongiseli na biso
1. Wapi ntina misato ya mwa buku Mokano ya Yehova?
1 Osili kobanda kosalela mwa buku ya sika Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? Ebimisamaki mpo na (1) kosalisa bayekoli ya Biblia báyeba biso, (2) kosalisa bango báyeba makambo oyo tosalaka, mpe (3) kolimbwela bango ndenge ebongiseli na biso etambolaka. Liteya mokomoko ya mwa buku Mokano ya Yehova ezwi kaka lokasa moko, mpe ezali mpasi te kotalela yango na miniti mitano to zomi na nsuka ya boyekoli.
2. Lobelá ndenge mwa buku yango ebongisami mpe makambo oyo ezali na kati.
2 Ndenge ebongisami: Mwa buku yango ekabolami na biteni misato, oyo mokomoko ezali kolobela makambo etali ebongiseli na biso, ndenge etyami awa likoló. Ezali na mateya 28, oyo motó ya likambo na yango mokomoko ezali motuna; mpe mitó ya makambo moke oyo elandi, oyo ekomami na makomi ya moindo makasi, ezali koyanola na motuna yango. Ezali na bafɔtɔ ya bandeko ya bikólo koleka 50, oyo emonisi ete mosala na biso ezali kosalema na mokili mobimba. Mateya mosusu ezali na etanda “Mpo na koyeba makambo mosusu,” mpe epesi makanisi oyo okoki kolendisa moyekoli asalela.
3. Ndenge nini tokoki kosalela mwa buku Mokano ya Yehova?
3 Ndenge ya kosalela yango: Bandá na kolakisa moyekoli motuna oyo ezali motó ya likambo ya liteya. Na nsima, wana bozali kotánga liteya yango, bendá likebi na ye na mitó ya makambo moke oyo ekomami na makomi ya moindo makasi. Na nsuka, bótalela mituna ya bozongeli oyo ezali na nse ya lokasa. Okoki kotánga liteya mobimba to kotánga mpe kolimbola yango ndambondambo. Salelá bososoli mpo na koyeba bavɛrsɛ nini bokoki kotánga. Kobosana te kotalela bafɔtɔ mpe bitanda “Mpo na koyeba makambo mosusu.” Mbala mingi, esengeli kotalela mateya yango ndenge elandani. Nzokande, kokakatana te kokende na liteya oyo eyokani na mposa ya moyekoli. Na ndakisa, soki liyangani moko ekómi pene ya kosalema, bokoki kotalela liteya 11.
4. Mpo na nini ozali na esengo ya kozala na mwa buku wana ya sika?
4 Ntango tozali koyekola na moto Biblia, tosalisaka ye ayeba Tata na biso ya likoló. Kasi tosengeli mpe koteya ye makambo etali ebongiseli ya Yehova. (Mas. 6:20) Tozali mpenza na esengo ya kozala na mwa buku yango ya sika oyo ezali kosalisa biso na likambo yango!