Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
Pesá moto oyo okutani na ye trakte na ndenge oyo ekosala ete amona motó ya likambo na yango mpe lobá boye: “Mbote. Tozali kosala kampanye ya kokabola nsango oyo ya ntina mingi na mokili mobimba. Ya yo yango oyo.”
Soki okotika yango na bandako oyo okuti bato te, tyá yango na ndenge oyo bato mosusu bakomona te mpe kogumbagumba yango te.
Soki moto asepeli to alingi ete bósolola, okoki kosɛnga ye apona eyano moko na biyano oyo etyami na lokasa ya liboso. Fungolá trakte, mpe lakisá ye maloba ya Nzembo 119:144, 160. Yebisá ye ete trakte yango elobeli site Internet moko oyo ekoki kosalisa ye azwa biyano ya malamu na Biblia. Ntango mosusu, okoki kolakisa ye video oyo elobi: Mpo na nini koyekola Biblia? Liboso okabwana na ye, lobelá mituna misato oyo ezali na lokasa ya nsuka ya trakte yango mpe tuná ye apona oyo alingi mpenza ete bólobela. Yebisá ye ete okozongela ye mpo na kolakisa ye ndenge akoki kozwa eyano na motuna yango na Biblia na lisalisi ya jw.org. Ntango okozongela ye, bókɔta na esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA, mpo na kozwa eyano.
Soki ozali mpe kokabola nkasa ya libyangi ya liyangani ya etúká, pesá moto ozali kosolola na ye lokasa ya libyangi elongo na trakte, mpe lobá boye: “Topesi yo mpe lokasa ya libyangi oyo mpo na liyangani moko oyo ekosalema mosika te, mpe moto nyonso akoki kokɔta ofele.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/08/2014
Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, soki ebongi, lobá boye mpo na kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli: “Tokosepela mpe kopesa yo bazulunalo na biso ya sika. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo epesi eyano na motuna oyo elobi: Nzambe atyelaka yo likebi?”
Lamuká! 08/2014
Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, soki ebongi, lobá boye mpo na kolakisa Lamuká!: “Tokosepela mpe kopesa yo bazulunalo na biso ya sika. Lamuká! oyo epesi eyano na motuna oyo elobi: Ndenge nini bato bakoki kosilisa matata?”