Ozali komibongisa mpo na Ekaniseli?
Ezalaki mokolo ya 13 Nisana ya mobu 33 T.B. Yesu ayebaki ete atikalaki na mpokwa moko ya nsuka ya kolekisa elongo na baninga na ye ya motema liboso báboma ye. Asengelaki kosala elekeli ya nsuka elongo na bango mpe kobandisa molulu moko ya sika, Bilei ya mpokwa ya Nkolo. Na ntembe te, molulu ya ntina ndenge wana esɛngaki mpenza kobongisa yango. Na yango, atindaki Petro ná Yoane bábongisa makambo. (Luka 22:7-13) Banda wana, mbula na mbula ezalaka na ntina ete bakristo oyo basepelaka kosala Ekaniseli bámibongisa mpo na molulu yango. (Luka 22:19) Makambo nini tosengeli kosala mpo na komibongisa mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mwa 03/04/2015?
Ndenge basakoli bakomibongisa:
Omibongisa mpo osala mingi na kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Ekaniseli.
Salá liste ya bato oyo oyekolaka na bango Biblia, bato ya libota na yo, baninga ya kelasi to ya mosala mpe bato mosusu oyo oyebani na bango, mpe bengisá bango.
Tángá mpe manyolá na makambo oyo ezali na programɛ ya Botángi ya Biblia mpo na ekaniseli.
Yaká na Ekaniseli na ngonga ya malamu mpo oyamba bapaya.