Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/13 lok. 1
  • Tómibongisa mpo na Ekaniseli na motema ya esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómibongisa mpo na Ekaniseli na motema ya esengo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • “Bókoba kosala boye”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ozali komibongisa mpo na Ekaniseli?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 3/13 lok. 1

Tómibongisa mpo na Ekaniseli na motema ya esengo

1. Eleko ya Ekaniseli ezali ntango ebongi mpenza ya kosala nini?

1 Ekaniseli ekosalema mokolo ya Mibale 26 sanza ya 3. Ekozala mpenza libaku malamu ya kosepela na oyo Nzambe asalaki mpo na kobikisa biso. (Yis. 61:10) Ata liboso mokolo yango ekoka, kozala na esengo ekosalisa biso tómibongisa malamu. Na ndenge nini?

2. Nini etindaka biso tózwa bibongiseli mpo na Ekaniseli?

2 Bibongiseli mpo na Ekaniseli: Molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo ezali na ntina mingi, kasi esalemaka na mindɔndɔ te. Atako bongo, esɛngaka kobongisa makambo liboso mpo eloko moko te ya ntina ezanga. (Mas. 21:5) Esengeli kopona ngonga mpe esika oyo ebongi. Esengeli mpe kozwa mampa mpe vinyo oyo ebongi. Esika likita yango ekosalema esengeli kopɛtolama mpe kobongisama liboso. Molobi oyo akoponama asengeli komibongisa malamumalamu; mpe bandeko oyo bakotambwisa limpa mpe vinyo, ná baoyo bakoyamba bato, basengeli kozwa malako ya sikisiki. Na ntembe te, mingi ya makambo wana esili kosalema. Botondi na biso mpo na nguya ya kobikisa ya lisiko etindaka biso tómibongisa malamu mpo na molulu yango.​—1 Pe. 1:8, 9.

3. Ndenge nini tokoki kobongisa motema na biso mpo na molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo?

3 Tóbongisa motema: Ezali mpe na ntina tóbongisa motema na biso mpo tókanga mpenza ntina ya Ekaniseli. (Ezr. 7:10) Na yango, tosengeli kozwa ntango ya kotánga bavɛrsɛ ya Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli, mpe komanyola na mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Komanyola na elimo ya komipesa oyo Yesu amonisaki ekotinda biso tómekola ye.​—Gal. 2:20.

4. Na matomba oyo tozwi na nzela ya lisiko, wapi oyo esepelisaka yo mingi koleka?

4 Liwa ya Kristo ezali kolongisa Bokonzi ya Yehova. Ezali kosikola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa. (1 Yoa. 2:2) Ezali kopesa biso likoki ya kokóma na boyokani ya kimya elongo na Nzambe mpe ezali kofungwela biso nzela ya bomoi ya seko. (Kol. 1:21, 22) Ezali kosalisa mpe biso tózala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai ya Yehova mpe tótikala ngwi mpo tozali bayekoli ya Kristo. (Mat. 16:24) Wana ozali komibongisa mpo na Ekaniseli mpe ntango okoyangana na yango, tiká ete esengo na yo ebakisama!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto