Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Décembre lok. 5
  • ‘Ngai oyo! Tindá ngai’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Ngai oyo! Tindá ngai’
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo mosusu
  • Bamipimelaki makambo mingi mpo na Yehova
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Okomipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Kende esika mposa ya basakoli ezali mingi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Okoki kosala esika mposa ezali makasi?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Décembre lok. 5

BOMOI YA BAKRISTO

‘Ngai oyo! Tindá ngai!’

Libota ya ndeko Williams emibongisi mpe ekei na ekólo mosusu

Yisaya azali ndakisa malamu na oyo etali komipesa. Amonisaki kondima mpe andimaki mbala moko kozwa mokumba moko, atako ayebaki te soki ezali mokumba nini. (Yis 6:8) Yo mpe okoki kobongisa makambo mosusu mpo okende kopesa mabɔkɔ esika mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene? (Nz 110:3) Na ntembe te, ezali na ntina mingi ‘koyeba mosolo nini ekosɛnga’ liboso ya kokende. (Lk 14:27, 28) Kasi, ezali malamu kondima komipimela makambo mosusu mpo na mosala ya kosakola. (Mt 8:20; Mr 10:28-30) Ndenge emonisami na video Kokende kosakola esika mposa ezali monene, mapamboli oyo tozwaka na mosala ya Yehova eleki mosika makambo nyonso oyo tomipimeli.

NSIMA YA KOTALA VIDEO YANGO, BÓPESA BIYANO NA MITUNA OYO:

  • Makambo nini bato ya libota ya ndeko Williams bamipimelaki mpo na kokende kosakola na Équateur?

  • Makambo nini batalelaki liboso bápona esika ya kokende?

  • Mapamboli nini bazwaki?

  • Ndenge nini okoki koyeba malamu esika oyo mposa ezali monene?

NA BOYEKOLI NA BINO NA KATI YA LIBOTA, BÓTALELA MITUNA OYO:

  • Tokoki kosala nini mpo tómipesa na mosala ya kosakola libota mobimba? (km 8/11 4-6)

  • Soki tokokoka te kokende esika mposa ezali monene, ndenge nini tokoki kosalisa lisangá na biso? (w16.03 3-5)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto