Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Juillet lok. 5
  • Kende esika mposa ya basakoli ezali mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kende esika mposa ya basakoli ezali mingi
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • Nini esalemaka na biro ya filiale?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Okoki ‘koleka na Masedonia’?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • “Nasengeli kokende kofanda epai mosusu?”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Juillet lok. 5
Bililingi euti na video “Kɔtá na porte oyo ezali kopesa nzela na mosala​—Kende kosakola esika mposa ezali mingi.” Elilingi: 1. Gabriel azali kosala bolukiluki. 2. Azali kosolola na nkulutu moko mpo na kokomela biro ya filiale. 3. Azali kosakola elongo na moninga na ye Samuel na eleko ya kampanye sipesiale.

BOMOI YA BAKRISTO | OMITYELA MIKANO MPO NA MOBU YA MOSALA YA SIKA

Kende esika mposa ya basakoli ezali mingi

Esɛngaka kozala na kondima mpo na kotika bandeko na yo ya libota mpe kokende kofanda esika mosusu mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola. (Ebr 11:8-10) Soki ozali kokanisa kokende esika mposa ya basakoli ezali mingi, sololá na bankulutu ya lisangá na bino. Makambo nini ya ntina okoki kotalela mpo oyeba esika malamu ya kokende mpe soki okokoka kokokisa mokano yango? Tángá na mikanda na biso masolo oyo elobeli kokende kosala esika mposa ya basakoli ezali mingi. Sololá na bandeko oyo bazwaki matomba ndenge bakendaki kopesa mabɔkɔ na masangá mosusu. (Mas 15:22) Bondelá Yehova mpo asalisa yo. (Yak 1:5) Luká koyeba makambo etali esika olingi kokende, mpe soki likoki ezali, kende kotala esika yango mwa mikolo liboso ozwa ekateli.

TALÁ VIDEO NA KONDIMA, KƆTÁ NA PORTE OYO EZALI KOPESA NZELA NA MOSALA​—KENDE KOSAKOLA ESIKA MPOSA EZALI MINGI, NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:

  • Makambo nini ezalaki kotungisa Gabriel mpo azwa ekateli, mpe nini esalisaki ye?

Soki olingi kokende kopesa mabɔkɔ na masangá oyo ezali na bosɛnga pene na bino, sololá na mokɛngɛli ya zongazonga na bino. Soki olingi koyeba makambo etali masangá oyo ezali mpenza mosika, komelá biro ya filiale na nzela ya Komite ya mosala ya lisangá na bino. Soki lisangá yango ezali na teritware ya filiale na bino te, komelá biro ya filiale oyo etalelaka makambo ya lisangá yango. Soki ezali na esika moko oyo osepeli kokende, tyá yango na mokanda oyo okokoma.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto