Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Avril lok. 6
  • Nzembo ya Bokonzi epesaka mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzembo ya Bokonzi epesaka mpiko
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Tóyembela Yehova na esengo nyonso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Likanisi mpo na koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Nzembo ya sika mpo na losambo!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Omibongisi mpo na koyembela Yehova na makita?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Avril lok. 6

BOMOI YA BAKRISTO

Nzembo ya Bokonzi epesaka mpiko

Ndeko Erich Frost afandi pene ya piano

Paulo ná Silasi bayembelaki Nzambe ntango bazalaki na bolɔkɔ. (Mis 16:25) Na mikolo na biso, bandeko na biso bakristo bayembaki nzembo ya Bokonzi na Sachsenhausen, kaa ya bakangami ya Banazi na Allemagne mpe ntango bamemaki bango na Sibérie. Bandakisa yango emonisi ete nzembo ekoki kopesa bakristo oyo bazali na komekama mpiko.

Mosika te, buku ya sika ya nzembo oyo ezali na motó ya likambo Tóyembela Yehova na esengo ekobima na minɔkɔ ebele. Soki tozwi yango, tokoki koyembaka nzembo yango na losambo na kati ya libota na biso mpo tókanga maloba yango na motó. (Ef 5:19) Elimo santu ekozongisa maloba yango na motó na biso na ntango ya komekama. Nzembo ya Bokonzi ekoki kosalisa biso tótya makanisi na elikya na biso. Ekoki mpe kopesa biso mpiko na ntango ya komekama. Mpe ntango tozali na nsai, maloba yango esalisaka biso tóyemba na esengo mpo tozali koyoka malamu na motema. (1Nt 15:16; Nz 33:1-3) Tósala makasi tóyeba malamu nzembo na biso ya Bokonzi!

TALÁ VIDEO LOYEMBO OYO EPESAKI BATO YA BOLƆKƆ MAKASI, NA NSIMA, YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Makambo nini etindaki Ndeko Frost asala loyembo?

  • Ndenge nini loyembo yango epesaki bandeko mpiko na kaa ya bakangami ya Sachsenhausen?

  • Na makambo nini ya mokolo na mokolo nzembo ya Bokonzi ekoki kopesa yo makasi?

  • Nzembo nini ya Bokonzi okolinga kokanga na motó?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto