Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Janvier lok. 5
  • Ndenge tozwaki ndingisa ya kosakola na Québec

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge tozwaki ndingisa ya kosakola na Québec
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Komekola bandakisa ya malamu ememeli ngai mapamboli ebele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Yehova azali ekimelo mpe nguya na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Janvier lok. 5

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge tozwaki ndingisa ya kosakola na Québec

Kaisala, soda Moroma mpe Paulo

Ntango bazalaki kosambisa Paulo, asɛngaki akende kosamba epai ya Kaisala. Paulo atikelá biso ndakisa ndenge asalelaki lotomo na ye ya kozala mwana-mboka ya Roma. Talá video Ndenge tozwaki ndingisa ya kosakola na Québec mpo na koyeba ndenge bandeko na biso basalelaki mibeko mpo na kokɔtela nsango malamu na Québec. Na nsima, yanolá na mituna oyo:

Batatoli ya Yehova na Québec na bambula ya 1940; trakte sipesiale; ndeko mobali oyo azali kosala diskur na bilanga moko na ntango ya epekiseli; ndeko Aimé Boucher
  • Mikakatano nini bandeko na biso na Québec bakutanaki na yango?

  • Trakte nini bakabolaki mpe yango ebimisaki matomba nini?

  • Nini ekómelaki ndeko Aimé Boucher?

  • Ekateli nini Tribinale monene ya Canada ezwaki na likambo ya ndeko Boucher?

  • Bandeko basalelaki mobeko nini oyo esalelamaka mpenza te mpe yango ebimisaki nini?

  • Nini esalemaki ntango bapolisi bakataki makita ya losambo mpo balandaki makambo oyo basango balobaki?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto