Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Avril lok. 8
  • Luká koteyama na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Luká koteyama na Nzambe
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Ozali na mposa ya kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Omityela mikano mpo na mobu ya mosala ya sika—Luká kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Eteyelo mpo na kobongisa basungi​—Ekuke monene oyo ezali komema na mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Avril lok. 8

BOMOI YA BAKRISTO

Luká koteyama na Nzambe

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Yehova, Molakisi monene, apesaka biso mateya ya malamu koleka. Alakisaka biso ndenge ya kozala na bomoi ya malamu mpe azali kobongisa biso mpo na avenire malamu​—nyonso wana ofele! (Yis 11:6-9; 30:20, 21; Em 22:17) Na nzela ya mateya na ye, Yehova abongisaka biso mpo na kosakwela basusu nsango ya lobiko.​—2Ko 3:5.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Monisá ezaleli ya komikitisa.​—Nz 25:8, 9

  • Ndimá formasyo oyo Yehova azali kopesa yo sikoyo, na ndakisa kondima kosala badevuare ya bana-kelasi na likita ya kati ya pɔsɔ

  • Mityelá mikano ya elimo.​—Flp 3:13

  • Mipimelá makambo mosusu mpo okokisa masɛngami mpo na kozwa formasyo mosusu.​—Flp 3:8

TALÁ VIDEO MATEYA YA YEHOVA EKÓMISI BANGO BAZWI NA ELIMO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mikakatano nini basakoli mosusu balongaki mpo bákɔta Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi?

  • Formasyo nini Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi epesaka?

  • Ndenge nini bandeko ya lisangá basalisaki bandeko oyo bazwaki diplome na eteyelo yango na mikumba na bango ya sika?

  • Masɛngami nini moto asengeli kokokisa mpo akɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi? (kr lok. 189)

  • Formasyo nini mosusu okoki kozwa na ebongiseli ya Yehova?

Bandeko oyo bazwá formasyo na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi bazali kosakola na Namibie, Norvège, États-Unis, mpe Japon

Mapamboli nini okozwa soki oluki koteyama na Nzambe?

BITEYELO YA TEOKRASI OYO NASÍ NAKƆTÁ

  • Bomoi mpe mosala ya bakristo

  • Eteyelo ya babongisi-nzela

  • Eteyelo ya mosala ya Bokonzi

  • Eteyelo mpo na bankulutu ya masangá

  • Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi

BITEYELO YA TEOKRASI OYO NAZALI KOKANA KOKƆTA

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto