Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Mai lok. 7
  • Omibongisi mpo na mobulu oyo bana-mboka bakoki kobimisa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omibongisi mpo na mobulu oyo bana-mboka bakoki kobimisa?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • Omibongisi?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Kobá komibongisa lokola tozali kobika na nsuka ya “mikolo ya nsuka”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Omibongisi mpo na kobeba ya nkita?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kolakisa bayekoli ndenge ya kobongisa boyekoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Mai lok. 7
Libota moko ezali kolanda bansango ya mobulu ya bana-mboka na TV. Batye basakosi na bango pembeni.

BOMOI YA BAKRISTO

Omibongisi mpo na mobulu oyo bana-mboka bakoki kobimisa?

Lokola mokili oyo ezali se kokóma na nsuka, tozali komizela ete makambo lokola mobulu ya bana-mboka, terorisme, mpe bitumba ekoki kosalema mingi. (Em 6:4) Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na mikakatano yango?

  • Omibongisa na elimo: Yekolá mitinda mpe masolo ya Biblia oyo ekokómisa makasi kondima na yo epai ya Yehova, na ebongiseli na ye, mpe oyo ekosalisa yo okɔta te na makambo ya mokili. (Mas 12:5; jr mok. 10 par. 23-24) Oyo ezali ntango ya kokómisa makasi boninga na biso ná bandeko ya lisangá.​—1Pe 4:7, 8

  • Omibongisa na mosuni: Kanisá esika nini okofanda mpo obatelama malamu mpe biloko ya kobikela oyo osengeli kobomba. Lisusu, kanisá makambo oyo osengeli kosala soki esɛngi bókima. Talá malamu biloko oyo otye na sakosi na yo, kobosana te kotya mwa mbongo na kati mpe biloko mosusu mpo na komibatela. Yebá ndenge ya kosala mpo na kokutana na bankulutu, mpe salá ete bango mpe bázala na likoki ya kokutana na yo.​—Yis 32:2; g17.5 nk. 3-7

Batelá mimeseno na yo ya elimo na ntango ya mobulu. (Flp 1:10) Zalá kaka na ndako mpe kobima mpambampamba te. (Mt 10:16) Kabelá bandeko bilei mpe biloko mosusu oyo bazali na yango mposa.​—Ro 12:13

TALÁ VIDEO OMIBONGISI MPO NA MAKAMA OYO EKOKI KOBIMA? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso ntango likama moko ebimi?

  • Wapi mwa makambo ya ntina tokoki kosala mpo na komibongisa?

  • Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bakutani na makama?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto