BOMOI YA BAKRISTO
Zalá na komikitisa—Boyá komikumisa
Soki moto azali komikumisa to kolobela ntango nyonso makambo oyo asalaka, yango emonisaka ete azali na lolendo, mpe yango elendisaka te bato oyo bazali koyoka ye. Kutu, Biblia elobi ete: “Moto oyo auti epai mosusu akumisa yo, kasi monɔkɔ na yo moko te.”—Mas 27:2.
TALÁ VIDEO KÓMÁ MONINGA YA YEHOVA—ZALÁ NA KOMIKITISA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Wapi mwa makambo oyo bato bamikumisaka na yango?
Na likambo nini Caleb azalaki komikumisa na yango liboso ya baninga na ye?
Ndenge nini tata ya Caleb asalisaki ye azala na komikitisa?
Ndenge nini 1 Petro 5:5 esalisaka biso tózala na komikitisa?