Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Novembre lok. 7
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kopesa litatoli na nzela ya telefone

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kopesa litatoli na nzela ya telefone
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini kopesa litatoli na telefone?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Kopesa litatoli na telefone ekoki kobota mbuma malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobongisa nzela mpo na kozongela moto
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • “Nakutaka ye lisusu te na ndako!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Novembre lok. 7
Bililingi: Elenge mobali moko azali kopesa litatoli na nzela ya telefone elongo ná babalani oyo bazali mibange. 1. Ndeko mobali yango azali kosolola na moto moko ya mombongo na telefone. 2. Moto yango ya mombongo azali koyoka nsango ya ndeko mobali.

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kopesa litatoli na nzela ya telefone

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Kopesa litatoli na nzela ya telefone ezali lolenge moko malamu ya “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.” (Mis 20:24)a Esalisaka biso tópesa litatoli ata ntango tozali te na likoki ya kokutana na moto.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Kaka ndeko mobali yango azali sikoyo kobongisa bavɛrsɛ mpe mwa banɔti oyo akosalela na litatoli na nzela ya telefone.

    Omibongisa. Poná lisolo oyo ebongi. Na nsima, bongisá makambo oyo okoloba. Okoki mpe kobongisa mwa maloba ya mokuse oyo ezali komonisa mokano oyo obengi moto soki ayambi telefone te. Ekozala malamu ofanda na mesa mpo na kotya makambo oyo obongisi mpe bisaleli mosusu oyo okozala na yango mposa, na ndakisa aparɛyi oyo ezali ya kofungwama na JW Library® to na jw.org®

  • Ndeko mobali ya elenge azali elongo na ndeko ya mobange wana ndeko ya mobange azali kosolola ná moto moko na telefone.

    Zalá motema mpiɔ. Lobá ndenge omesaná koloba. Sɛkáká mwa moke mpe saláká bajɛstɛ lokola nde ozali komona moto yango. Kokata maloba mpambampamba te. Ekozala malamu ozala elongo na bandeko mosusu. Soki nkolo-ndako atuni motuna moko, lobá yango na mongongo makasi mpo ndeko oyo bozali na ye elongo akoka kosalisa yo mpo opesa eyano

  • Ndeko mobali ya elenge azali kotinda esika ya kokɔta mpo na kozwa video na jw.org.

    Lobá likambo oyo ekopesa yo nzela ozongela moto yango. Soki moto yango asepeli, okoki kotikela ye motuna mpo oyanola ye na mbala ya nsima oyo okobenga ye. Okoki mpe kosɛnga ye otindela ye mokanda na adrɛsi e-mail na ye, to yo moko okende kotikela ye yango. To okoki kotindela ye moko ya bavideo na biso to masolo mosusu to kokomela ye mwa makambo mpo na yango. Soki emonani malamu, yebisá moto yango atala makambo mosusu oyo ezali na site Internet na biso

a Soki kopesa litatoli na nzela ya telefone endimami na esika ofandi, osengeli kosala yango na boyokani na mibeko na likambo etali kobatela bansango etali moto ye moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto