Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Décembre lok. 8
  • Kobá kosalela bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobá kosalela bazulunalo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Kabolaká bazulunalo ntango ozali na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Bazulunalo oyo ezali kosakola Bokonzi ya Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tópona masolo na kotaleláká bamposa ya bato
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Nani akosepela na yango?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Décembre lok. 8
Ndeko mwasi moko azali kosolola na mwasi moko lisolo moko oyo euti na ‘Lamuká!’

BOMOI YA BAKRISTO

Kobá kosalela bazulunalo

Kobanda 2018, bazulunalo na biso ya bato nyonso ekómaki kolobela kaka lisolo moko na nimero moko. Bazulunalo yango nyonso ezali na kati ya Bisaleli na biso mpo na koteya. Na yango, tokoki kosalela yango na mosala ya kosakola. Ntango tokei mobembo to tokei kosomba biloko tokoki mpe komema bazulunalo yango. Bazulunalo yango esalemá te mpo na koyekola na yango bato Biblia, kasi ekoki kolamwisa mposa ya moto na makambo ya elimo.

Nsima ya kobanda lisolo na moto, tángelá ye vɛrsɛ moko ya Biblia, mpe lobelá lisolo moko oyo ezali na zulunalo yango oyo ekoki kosepelisa moto yango. Na ndakisa, soki okutani na moto oyo azali kobɔkɔla bana, to oyo azali na mawa to mpe moto oyo azali na mitungisi, okoki koloba boye: “Natángaki lisolo moko kitoko oyo ezali kolobela likambo yango. Okosepela nalakisa yo yango?” Soki moto yango asepeli, okoki kopesa ye zulunalo yango ya papye to kotindela ye yango na aparɛyi, ata na bokutani ya liboso. Atako kopesa bato mikanda ezali te mokano na biso ya libosoliboso, bazulunalo ekoki kosalisa biso tókutana na bato oyo babongi mpe oyo bakosalela makambo oyo bakoyekola.​—Mis 13:48.

2018

Bililingi: Masolo ya ezipeli ya ‘Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli’ mpe ‘Lamuká!’ ya 2018. 1. ‘Biblia ezali kaka na ntina lelo oyo?’ 2. ‘Bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ekoya?’ 3. ‘Nzambe akipaka yo?’ 4. ‘Ndenge ya kozala na esengo.’ 5. ‘Sekele 12 mpo na libota ya esengo.’ 6. ‘Okoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa.’

2019

Bililingi: Masolo ya ezipeli ya ‘Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli’ mpe ‘Lamuká!’ ya 2019. 1. ‘Nzambe azali nani?’ 2. ‘Kozala na bomoi ezali kaka na ntina?’ 3. ‘Bomoi nyonso kaka yango oyo?’ 4. ‘Kobanga ekosila mokolo mosusu?’ 5. ‘Mateya motoba oyo bana basengeli koyekola.’ 6. ‘Biblia ekoki kobongisa bomoi na yo’

2020

Bililingi: Masolo ya ezipeli ya ‘Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli’ mpe ‘Lamuká!’ ya 2020. 1. ‘Luká koyeba solo.’ 2. ‘Bokonzi ya Nzambe ezali nini?’ 3. ‘Nzambe alaki biso mapamboli ya seko.’ 4. ‘Okoki kolonga kotungisama.’ 5. ‘Biyano na mituna 5 oyo etali bampasi.’ 6. ‘Kokanisela bato mabe ekosila?’

Masolo nini bato basepelaka na yango na teritware na bino?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto