OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA
Ndimá lisalisi ya bandeko ya lisangá
Mpo na kosalisa biso, Yehova apesi biso “lisangá mobimba” ya bandeko. (1Pe 5:9) Bakoki kosunga biso tólonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ntoma Paulo azwaki lisalisi epai ya Akila ná Prisile, Silasi, Timote, mpe bato mosusu.—Mis 18:1-5.
Ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki kosalisa yo na mosala ya kosakola? Bakoki kopesa yo makanisi ya malamu mpo na ndenge ya koyanola moto oyo abimisi ntembe, ndenge ya kozongela moto, to mpe ndenge ya kotambwisa boyekoli ya Biblia. Kanisá ndeko moko na lisangá na bino oyo akoki kosalisa yo, na nsima, sɛngá ye asalisa yo. Na ntembe te, bino nyonso bokozwa matomba mpe ekobakisela bino esengo.—Flp 1:25.
TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI—NDIMÁ LISALISI OYO YEHOVA APESI—BANDEKO YA LISANGÁ, MPE NA NSIMA, YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Ndenge nini Neeta amekaki kolendisa Rose mpo aya na makita?
Mpo na nini ezali na ntina tókendeke ná basakoli mosusu ntango tokei koyekola na moto Biblia?
Mpo na kokómisa moto moyekoli, ezali kosɛnga lisangá mobimba epesa mabɔkɔ
Eloko nini Rose ná Abigay bazalaki kolinga?
Ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki kosalisa ngai nakolisa makoki na ngai na mosala ya kosakola?