Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Janvier lok. 11
  • Bilenge—Bófungolela baboti na bino motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge—Bófungolela baboti na bino motema
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • “Kumisá tata na yo mpe mama na yo”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Oyo okoki kosala mpo libota na yo ezala na esengo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo—Eteni 2
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Janvier lok. 11

BOMOI YA BAKRISTO

Bilenge​—Bófungolela baboti na bino motema

Mpo na nini osengeli koyebisa baboti na yo polele makambo oyo ozali kokanisa? (Mas 23:26) Mpamba te Yehova apesá bango mokumba ya kobatela yo mpe kotambwisa yo. (Nz 127:3, 4) Ekozala mpasi mpo na bango básalisa yo soki ozali kobombela bango mitungisi mpe basekele na yo. Lisusu, okozwa te litomba na eksperiansi oyo bazwá na bomoi. Ezali mabe obomba makambo mosusu oyo ozali kokanisa mpo na yo moko? Te, kasi na bantango mosusu ekosɛnga okeba mpo baboti na yo bákóma te kokanisela yo mabe mpo yo moko ozali koloba te.​—Mas 3:32.

Ndenge nini okoki kosolola na baboti na yo? Luká koyeba ntango oyo ebongi mpo na yo mpe mpo na bango. Soki kosolola na bango ezali mokakatano mpo na yo, okoki kokomela bango mokanda mpo na koyebisa bango ndenge ozali komiyoka. Okosala nini soki balingi kolobela likambo oyo olingi te bólobela? Kobosana te ete balingi mpenza kosalisa yo. Yebá ete yo ná baboti na yo bozali ekipi moko, kasi banguna te. Milende oyo ozali kosala mpo na kosolola polele na baboti na yo ekosalisa yo na bomoi mpe okozwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya!​—Mas 4:10-12.

TALÁ VIDEO BOLENGE NA NGAI​—NDENGE NINI NAKOKI KOSOLOLA NA BABOTI NA NGAI? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi euti na video “Bolenge na ngai​—Ndenge nini nakoki kosolola na baboti na ngai?” Elenge mwasi atye ba écouteur na matoi mpe azali kosalela ordinatɛrɛ mpe azali kokipe mama na ye te, oyo azali kosolola na ye.

    Esther ná Partik bayaki koyeba nini?

  • Elilingi euti na video “Bolenge na ngai​—Ndenge nini nakoki kosolola na baboti na ngai?” Elenge mwasi moko azali kosolola na mama na ye mpe azali kolakisa ye eloko moko na telefone na ye.

    Ndakisa ya Yesu ekoki koteya yo nini?

  • Elilingi euti na video “Bolenge na ngai​—Ndenge nini nakoki kosolola na baboti na ngai?” Mama moko azwi ntango nsima ya kosala mosala ya ndako mpo na kosakana na mwana na ye ya mobali.

    Makambo nini baboti na yo bazali kosala mpo na komonisa ete bazali kobatela yo?

  • Elilingi euti na video “Bolenge na ngai​—Ndenge nini nakoki kosolola na baboti na ngai?” Antrenɛrɛ moko ya lisano ya basket azali kolakisa ekipi na ye lisano moko.

    Baboti na yo balingi ozala na bomoi ya malamu

    Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa yo osololaka na baboti na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto