Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Mai lok. 5
  • Omibongisi mpo na kobeba ya nkita?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omibongisi mpo na kobeba ya nkita?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Omibongisi?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Kobá komibongisa lokola tozali kobika na nsuka ya “mikolo ya nsuka”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Omibongisi mpo na mobulu oyo bana-mboka bakoki kobimisa?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Mai lok. 5

BOMOI YA BAKRISTO

Omibongisi mpo na kobeba ya nkita?

Tokamwaka lisusu te ntango nkita ya mokili mobimba ezali se kobeba mpo na makambo oyo ezali kosalema na mokili. Mpo na nini? Mpamba te tozali kobika na nsuka mpenza ya mikolo ya nsuka, mpe Biblia ekebisi biso ete tótya te elikya na biso na “bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi.” (1Ti 6:17; 2Ti 3:1) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yehoshafate mpo na oyo etali komibongisa mpo na kobeba ya nkita?

Ntango banguna balukaki kobundisa bango, Yehoshafate atyelaki Yehova motema. (2Nt 20:9-12) Azwaki mpe bibongiseli mpo na kosalisa bato ya ekólo bámibongisa na ndenge akómisaki makasi bingumba mpe abongisaki mampinga ya basoda. (2Nt 17:1, 2, 12, 13) Lokola Yehoshafate, tosengeli kotyela Yehova motema mpe kosala oyo esengeli mpo na komibongisa na mikakatano oyo ekoki koya.

TOKOKI KOSALA NINI MPO TÓMIBONGISA MPO NA KOBEBA YA NKITA?

Omibongisa na elimo: Sepeláká na oyo ozali na yango, mpe kómisá kondima na yo makasi na likoki oyo Yehova azali na yango ya kokokisa bamposa na yo ya mokolo na mokolo. (Mt 6:26; 1Ti 6:8) Zwá ekateli ya koboya kobuka mitinda ya Biblia kaka mpo na kokokisa bamposa na yo. (Ro 2:21) Luká koyeba ndenge nini okoki kobanda kozwa bilei ya elimo soki kura to Internet ezali te. Poná mwa mikanda ya papye oyo okozala na yango na mabɔkɔ, mpe soki likoki ezali, zwá libela na Internet mikanda oyo okozala na mposa na yango.

Omibongisa na mosuni: Kokɔta banyongo mingi te mpe saleláká mbongo na mayele. (Nz 22:7) Soki likoki ezali, bombá mwa bilei mpe biloko mosusu oyo bokozala na mposa na yango. Basusu bakoki komona malamu básala bilanga mpo na kobatela mbongo.

TALÁ VIDEO OMIBONGISI MPO NA MAKAMA OYO EKOKI KOBIMA? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

Bililingi euti na video “Omibongisi mpo na makama oyo ekoki kobima?” Bililingi ezali kolakisa Biblia, sakosi, telefone mpe bandeko bazali kotonga ndako.
  • Mpo na komibongisa na likama, mokomoko na biso akoki kosala nini?

Bililingi euti na video “Omibongisi mpo na makama oyo ekoki kobima?” Bandeko bazali kotonga ndako ya bandeko oyo bakutani na likama mpe bazali kokitisa biloko na motuka.
  • Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kosalisa bato mosusu?

OYO OKOKI KOSALA

Bózongela na losambo na kati ya libota Lamuká! No. 1 2022. Bólobela makambo mosusu oyo bokoki kosala mpo na komibongisa liboso likama moko ebima.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto