Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/00 lok. 8
  • “Nasengeli kokende kofanda epai mosusu?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nasengeli kokende kofanda epai mosusu?”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Kende esika mposa ya basakoli ezali mingi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Okoki ‘koleka na Masedonia’?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Okoki koleka na Masedonia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 9/00 lok. 8

“Nasengeli kokende kofanda epai mosusu?”

1 Mpo na kotosa etinda ya Yesu ya ‘kokende kozalisa bayekoli na mabota nyonso,’ ebele ya basaleli ya Yehova oyo bamipesi na ye bazali kokende kosala epai oyo mposa ya basakoli ezali makasi. (Mat. 28:19) Bazali komekola Paulo, oyo andimaki ntango babengaki ye ete: “Yaká na Makedonia kosunga biso!” (Mis. 16:9) Ndenge nini tokoki kosala yango?

2 Landá likambo mokomoko: Na lisangá na bino ezali na teritware moko epai basakoli bakendaka mingi te? Soki ezali bongo, okoki kosala makasi mpo na kosakwela bato oyo bafandi na esika yango. Liboso ya kozwa ekateli ya kokende esika moko, osengeli liboso kosolola na bankulutu ya lisangá na yo mpo na koyeba soki okoki kokende kuna. Okoki mpe kotuna mokɛngɛli ya zongazonga soki ayebi lisangá moko oyo ezali pene epai okoki kosala mosala ya kosakola mingi. Epai mosusu, nsima ya komitalela malamumalamu, okoki kosepela kopesa lisungi na yo na esika mosusu na ekólo na bino to na mokili mosusu. Soki yango ezali mposa na yo, yo na bankulutu ya lisangá na yo bosengeli kotinda mokanda na biro ya filiale epai ozali kokana kokende kosala; mpe na mokanda yango esengeli koyebisa bomoi na yo ya boklisto. Ekozala malamu ete okende naino kotala esika yango liboso ya kozwa ekateli soki okokende kofanda kuna mpo na libela to te.

3 Zalá na ekɛngɛ ntango ozali kokende na ekólo mosusu: Bandeko na biso mingi bazali kokende kofanda na mikili mosusu mpamba te bazali koluka kozala na bomoi ya malamu na mosuni to bazali kokima minyoko. Na ntango yango, mingi bazali kokwea na motambo ya bato mabe oyo bazali kolaka bango ete bakosalisa bango bázwa mikanda mpo na kondimama na mokili oyo bauti kokóma sika, nzokande basilisaka bango mbongo nyonso mpe na nsima basundolaka bango. Ntango mosusu bato yango balukaka kutu kotinda bato oyo bayei sika na mboka yango ete bámikɔtisa na bomoi ya mbindo. Soki baboyi, basundolaka bango na mokili yango oyo bazali bapaya. Yango esalaka ete bato oyo bakei kofanda na mboka mopaya bázala na bomoi ya mpasi mpenza koleka ndenge bazalaki na mboka na bango moko. Bakoki ata koluka kokende kofanda na bandako ya bandeko to mpe koluka ete básalisa bango na lolenge mosusu, yango ebakisaka bozito epai ya mabota ya baklisto mosusu oyo bazali mpe na mikakatano na bango mpe na bampasi na bango oyo bazali kobundana na yango. Ekómaki ete bato ya mabota mosusu bákabwana bamosusu epai, bamosusu epai mpe mabota yango elɛmbaki na elimo mpo bamibongisaki malamu te liboso ya kokende na mokili mosusu.​—1 Tim. 6:8-11.

4 Soki olingi kokende kofanda esika mosusu mpo na koluka matomba na yo moko, osengeli koyeba ete ezala esika nini ozali kokana kokende okokutana na mikakatano kuna. Okoki kolonga mikakatano na esika oyo oyebi monɔkɔ mpe mimeseno ya bato, na esika ete okende koyekola makambo nyonso ya sika.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto