Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Juillet lok. 3
  • “Kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Tozali kobatela nsango malamu na nzela ya mibeko ya Leta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Juillet lok. 3
Bililingi: 1. Gathie ná Marie Barnett. 2. Ndeko Kokkinakis ná bandeko mosusu na Tribinale monene ya poto mpo na ntomo ya bato. 3. Batatoli ya Yehova na tribinale ya engumba ya Rostov na Russie. 4. Etuluku ya bandeko bazali na libanda ya Cours constitutionnelle ya Corée du Sud.

Epai tozwi bafoto: Lokasa 3: Kokkinakis ná Grèce: Droit réservé

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi na likoló, na kolanda likɔnga ya montre: Eteyelo ya etúká ya Virginie occidentale ná Barnette; Kokkinakis ná Grèce; Taganrog LRO mpe basusu ná Russie; Cha mpe basusu ná Corée du sud

BOMOI YA BAKRISTO

“Kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko”

Ntango batɛmɛli balukaki kopekisa Bayisraele kotonga lisusu tempelo, Bayisraele basalaki nyonso oyo esengelaki mpo bázwa ndingisa ya kokoba kotonga. (Ezr 5:11-16) Lelo oyo mpe, bakristo basalaka nyonso oyo esengeli mpo na kokɔtela nsango malamu na makambo etali mibeko. (Flp 1:7) Mpo na yango, na 1936, basalaki Departema ya makambo etali mibeko na Biro monene. Lelo, Departema ya makambo etali mibeko na Biro monene ebongisaka makambo mpo na kokɔtela matomba ya bokonzi na mokili mobimba. Ndenge nini Departema yango ezali kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi mpe kosalisa basaleli ya Yehova?

TALÁ VIDEO MOSALA YA DEPARTEMA YA MAKAMBO ETALI MIBEKO NA BIRO MONENE, NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Makambo nini etali mibeko Batatoli ya Yehova bakutanaka na yango?

  • Na makambo nini etali mibeko tolongaki? Lobelá ndakisa moko

  • Likambo nini mokomoko na biso akoki kosala na oyo etali “kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko”?

  • Esika nini na site na biso okokuta makambo oyo basaleli ya Yehova bazali kokutana na yango na makambo etali mibeko mpe liste ya Batatoli ya Yehova oyo bakangami na babolɔkɔ mpo na kondima na bango?

Soki ozali kosakola, ezala na lolenge nini, mpe bakonzi ya Leta balobi ete obuki mobeko moko boye, koluka te kolobela ntomo na yo mpo na kosilisa likambo yango na ndenge na yo moko. Kasi, osengeli koyoka bango na limemya nyonso. Soki polisi moko nde asɛngi yo otika kosakola, na mayele nyonso, luká kozwa nimero ya makarɔ na ye ya mosala to mpe ya biro na bango. Na nsima, sololá na lombangu na bankulutu mpe bango bakosolola na biro ya filiale mpo na kozwa lisungi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto