Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/09 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • “Kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Tókende kotala bango nokinoki
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mpo na nini kokende mbala moko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 10/09 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ Osengeli kosala nini soki balobi na yo otika kosakola na esika moko boye?

Na bisika mosusu, basakoli oyo bazalaki kosakola ndako na ndako to kokabola bazulunalo bakutanaki na bapolisi oyo bayebisaki bango ete bazali kobuka mobeko mpe balobaki na bango bátika kosakola. Soki okutani na likambo ya ndenge wana, kosala matata te, tosá mpe longwá mbala moko na esika yango. (Mat. 5:41; Flp. 4:5) Esengeli te oluka kosilisa likambo na ndenge na yo mpe koluka komonisa ete tozali na lotomo ya kosakola. Soki likoki ezali, kangá nimero ya makarɔ ya polisi yango mpe esika biro na bango ezali. Na nsima, yebisá bankulutu likambo yango mbala moko, mpe bango bakoyebisa biro ya filiale. Ndenge moko mpe, soki nkolo to mokɛngɛli ya esika to ya lopango moko oyo ezali na bandako ebele, na ndakisa etaje moko, asɛngi yo olongwa na esika yango, kosala motó makasi te; bimá mpe na nsima, yebisá bankulutu likambo yango. Kozala na boboto mpe na bonkonde epai ya moto oyo azali na bokonzi ekoki kobatela biso mpo tózwa te mikakatano mosusu ezangi ntina.​—Mas. 15:1; Rom. 12:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto