LISOLO YA BOMOI
Oyo nasali ezali oyo nasengelaki kosala
NA BOUMELI ya mbula koleka 30, Donald Ridley azalaki avoka oyo azalaki kosamba makambo ya Batatoli ya Yehova na batribinale. Azalaki kosalisa bato, minganga mpe bazuzi báyeba ete bato ya maladi bazali na lotomo ya koboya bázongisa bango makila. Asalisaki Batatoli ya Yehova bálonga na batribinale minene ya États-Unis. Baninga na ye bazalaki kobenga ye Don. Azalaki kosala mosala na molende, azalaki na komikitisa, mpe na elimo ya komipimela.
Na 2019, bazwaki Don na maladi moko ya mabe oyo ezalaka na nkisi te. Maladi yango ekolaki nokinoki, mpe na mokolo ya 16/08/2019 akufaki. Oyo ezali lisolo na ye.
Nabotamá na engumba St. Paul, na etúká ya Minnesota na États-Unis na 1954. Baboti na ngai bazalaki bazwi te babola mpe te, mpe bazalaki bato ya lingomba ya Katolike. Nazali mwana ya mibale na kati ya libota ya bana mitano. Na bomwana, nazalaki kotánga na eteyelo moko ya Katolike, mpe nazalaki kosalisa sango na misa. Kasi, nayebaki makambo mingi te oyo etali Biblia. Atako nazalaki kondima ete esengeli kozala na Nzambe oyo akelaki biloko nyonso, nazalaki kondima te ete lingomba ya Katolike ekoki kosalisa ngai nasambela ye.
NAYEKOLI SOLO
Na mbula na ngai ya liboso na eteyelo William Mitchell, esika nazalaki koyekola makambo ya mibeko, Batatoli ya Yehova bayaki kotala ngai na ndako. Lokola nazalaki kosukola bilamba, Batatoli yango balobaki ete bakozongela ngai na nsima. Ntango bazongelaki ngai, natunaki bango mituna mibale oyo: “Mpo na nini kaka bato mabe nde balongaka na bomoi?” mpe “Moto asengeli kosala nini mpo azala mpenza na esengo?” Nandimaki kozwa buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko na Anglais mpe Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika, oyo ezalaki na ezipeli kitoko ya langi ya mai ya pondu. Nandimaki mpe koyekola Biblia. Boyekoli yango efungolaki miso na ngai. Nasepelaki makasi ntango nayekolaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo ekoyangela mabele. Namonaki ete boyangeli ya bato elongi ata na likambo moko te mpe ememi mpasi, makambo ya kozanga bosembo, mpe makama mingi na mokili.
Na 1982, namipesaki na Yehova na libondeli mpe nazwaki batisimo kaka na mobu yango na liyangani ya etúká oyo esalemaki na St. Paul Civic Center, oyo ezalaki na motó ya likambo “Solo ya Bokonzi.” Na nsima, nazongaki mpo na kokende kosala ekzamɛ oyo moto asalaka mpo andimama lokola avoka. Na ebandeli ya sanza ya zomi, bayebisaki ngai ete nazwaki na ekzamɛ yango, mpe nakokaki kosala lokola avoka.
Na liyangani yango, nakutanaki na ndeko Mike Richardson, oyo azalaki mosangani ya libota ya Betele ya Brooklyn. Ayebisaki ngai ete biro ya makambo ya mibeko efungwami na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Nakanisaki maloba ya mokube moko moto ya Etiopi, oyo ezali na Misala 8:36 mpe namitunaki boye: ‘Nini ezali kopekisa ngai kosala na biro ya mibeko yango?’ Na yango, natondisaki formilɛrɛ mpo na kokende kosala na Betele.
Baboti na ngai basepelaki te ndenge nakómaki Motatoli ya Yehova. Tata atunaki ngai soki matomba nini nakozwa na Betele na mosala na ngai ya avoka. Nalimbolaki ye ete nakomipesa na kosalisa basusu. Nayebisaki ye ete mpo na kokokisa bamposa na ngai ya mikemike, bakobanda kopesa ngai dolare 75 na sanza moko.
Lokola nasilaki kondima kosala na tribinale moko, yango wana nakokaki te kokende mbala moko na Betele. Na 1984 nde nabandaki mosala na ngai na Betele ya Brooklyn na New York mpe batindaki ngai nasala na biro ya makambo ya mibeko. Formasyo oyo nazwaki na tribinale yango, esalisaki ngai nakokisa mosala na ngai malamu na Betele.
KOBONGISA LISUSU STANLEY, NDAKO MOKO YA TEYATRE
Ndako ya Teyatre ya Stanley ntango basombaki yango
Na sanza ya 11/1983, basombaki ndako moko ya teyatre na nkombo Stanley, oyo ezalaki na engumba Jersey, na etúká ya New Jersey. Bandeko bazwaki ndingisa ya kobongisa lisusu makambo etali kura mpe mai ya ndako yango. Ntango bakutanaki na bakonzi ya engumba yango, bandeko balimbolelaki bango ete ndako yango ekobanda kosalelama mpo na mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Yango ebimisaki mokakatano. Mibeko ya engumba Jersey na oyo etali ndenge oyo bandako esengeli kosalelama, elobaki ete bandako mpo na makambo ya losambo, esengeli kozala kaka na esika oyo bato bafandaka. Kasi lokola ndako ya teyatre Stanley ezalaki na esika ya mombongo, yango wana bakonzi baboyaki kopesa ndingisa. Bandeko basɛngaki ete tribinale mosusu etalela likambo yango, kasi tribinale yango eboyaki.
Na boumeli ya pɔsɔ na ngai ya liboso na Betele, ebongiseli ememaki likambo yango na tribinale mosusu mpo etalelama lisusu. Lokola nautaki kolekisa mbula mibale na tribinale ya St. Paul na Minnesota, namesanaki kosamba makambo ya bongo. Avoka na biso moko alobaki ete ndako ya teyatre ya Stanley ezalaki kosalelama mpo na milulu ndenge na ndenge, na ndakisa kosala bafilme to kobɛta miziki. Kasi, mpo na nini kosalela yango mpo na makambo ya losambo ekobuka mibeko? Mpe tribinale yango etalelaki lisusu likambo yango mpe elobaki ete mibeko ya engumba Jersey, etosaki te bonsomi na biso na makambo ya losambo. Tribinale yango, esɛngaki bakonzi ya engumba Jersey bápesa biso ndingisa ya kosalela ndako yango. Nakómaki komona ndenge Yehova azalaki kopambola ebongiseli na ye na ndenge etyaki biro ya makambo ya mibeko mpo mosala na ye ekende liboso. Nasepelaki mingi ndenge napesaki mabɔkɔ na mosala yango.
Bandeko babandaki mosala makasi ya kobongisa lisusu ndako yango, mpe mbula moko ekokaki te, na mokolo ya 08/09/1985, molulu ya kopesa badiplome na bana kelasi ya 79 ya Gileade esalemaki na ndako yango. Nasepelaki mingi ndenge napesaki mabɔkɔ mpo mosala ya Yehova ekende liboso. Epesaki ngai esengo mingi koleka mosala ya avoka oyo nazalaki kosala liboso naya na Betele. Nazalaki ata na likanisi te ete Yehova akosalela ngai mpo na kosamba makambo mingi ya ndenge wana.
KOLONGISA LOTOMO YA MOTO YA KOBOYA MAKILA
Na bambula ya 1980, minganga mpe balopitalo mingi ezalaki koboya koyokela Motatoli ya Yehova ya mokóló oyo andimi kozwa lisalisi ya monganga kozanga ete bátya ye makila. Mbala mingi bazuzi bazalaki kokanisa ete mingimingi basi ya zemi, bazali na lotomo te ya koboya ete bátya bango makila. Bazuzi yango bazalaki koloba ete soki mama aboyi bátya ye makila, akokufa mpe mwana na ye akotikala etike.
Na mokolo ya 29/12/1988, nsima ya kobota mwana na ye ya mobali, ndeko mwasi Denise Nicoleau abungisaki makila mingi. Lokola bomoi na ye ekómaki na likama, monganga ayebisaki ye ete andima bátya ye makila. Ndeko mwasi Nicoleau aboyaki. Na ntɔngɔ oyo elandaki, minganga basɛngaki na zuzi moko apesa bango ndingisa mpo bátya ndeko mwasi yango makila. Kozanga kutu báyebisa ndeko mwasi Nicoleau mpe mobali na ye, zuzi yango apesaki ndingisa ete minganga bátya ye makila.
Na mokolo oyo elandaki, minganga batyaki ndeko mwasi Nicoleau makila, atako mobali mpe bandeko na ye ya libota oyo bazalaki wana baboyaki yango. Na mpokwa wana, bakangaki bandeko ebele ya libota ya ndeko Nicoleau mpe bankulutu mibale mpo bafundaki bango ete baboyaki bátya ndeko Nicoleau makila. Na mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ, likambo yango elobelamaki na bazulunalo, na televisyo mpe na baradio ya engumba New York mpe zingazinga na yango.
Elongo na Philip Brumley ntango tozalaki bilenge
Na mokolo ya yambo na ntɔngɔ, nasololaki na Milton Mollen, zuzi moko ya tribinale monene mpo na likambo yango. Nayebisaki ye ndenge makambo elekaki, ete zuzi moko andimaki bátya ndeko na biso makila kozanga ete báyoka ye. Zuzi Mollen asɛngaki ngai naya na biro na ye na nsima ya midi mpo tótalela oyo mibeko elobi mpo na makambo ya ndenge wana. Mokolo yango na mpokwa, nakendaki ná ndeko Philip Brumley, mokɛngɛli ya departema na biso, na biro ya zuzi Mollen. Zuzi yango abengaki mpe avoka ya lopitalo yango aya kokutana na biso. Tokómaki kobendana. Na ntango moko boye, ndeko Brumley akomelaki ngai na mwa buku na ye ete “kitisá motema.” Ezalaki toli ya malamu mpenza mpo nakómaki na nkanda mpo na komonisa ete makambo oyo avoka wana azalaki koloba ezalaki lokuta.
Bandá na lobɔkɔ ya mwasi: Richard Moake, Gregory Olds, Paul Polidoro, Philip Brumley, ngai, mpe Mario Moreno—Baavoka na biso na mokolo oyo tokendaki kosamba na Tribinale Monene ya États-Unis mpo na likambo etali Watchtower ná mboka Stratton.—Talá Lamuká! ya 08/01/2003 nk. 3-4, 4-5, 6-8, 9-11, na Français
Nsima ya ngonga moko, zuzi Mollen alobaki ete yango nde ekozala likambo ya liboso oyo bakotalela na ntɔngɔ oyo elandi. Ntango tozalaki kolongwa na biro ya zuzi Mollen, ayebisaki biso ete lobi na ntɔngɔ avoka ya lopitalo wana “akozala na mosala makasi.” Yango elimbolaki ete avoka yango akozala na mosala makasi mpo na komonisa ete makambo oyo alobi ezali ya solo. Nayokaki lokola Yehova azalaki koyebisa ngai ete tokolonga. Nakamwaki komona ndenge Yehova azalaki kosalela biso mpo tókokisa mokano na ye.
Tolekisaki bangonga mingi na butu yango mpo na kobongisa makambo oyo tokoloba lobi. Lokola ndako ya tribinale yango ezali mosika te na Betele ya Brooklyn, bandeko mingi oyo bazalaki kosala ná biso na biro ya mibeko bayaki. Nsima ya koyoka biso, bazuzi minei ya tribinale yango balobaki ete esengelaki te bápesa ndingisa ya kotya ndeko na biso makila. Tribinale monene yango elongisaki ndeko mwasi Nicoleau mpe elobaki ete kopesa minganga ndingisa ya kosala likambo moko, kozanga koyoka moto ya maladi, ezali kobuka lotomo na ye.
Mwa moke na nsima, Tribinale Monene ya New York elobaki ete ndeko mwasi Nicoleau azalaki na lotomo ya kozwa lisalisi ya monganga kozanga ete bátya ye makila. Ezalaki mbala ya liboso oyo napesaki mabɔkɔ mpo na kosamba likambo etali makila, mpe tribinale elongisaki biso. Na nsima, napesaki mpe mabɔkɔ mpo na kosamba makambo mosusu misato ya ndenge wana liboso ya batribinale ndenge na ndenge na États-Unis, mpe tozwaki elonga. (Talá etanda “Makambo oyo tolongi na batribinale minene ya Etats-Unis.”) Tosalaki elongo na baavoka mosusu ya Betele mpo na kosamba makambo etali lotomo ya kobɔkɔla bana, koboma libala, mibeko na makambo etali kosomba mapango mpe kotonga.
LIBALA MPE BOMOI NA NGAI YA LIBOTA
Elongo na mwasi na ngai Dawn
Mbala ya liboso oyo nakutanaki na mwasi na ngai Dawn, autaki koboma libala mpe azalaki kobɔkɔla bana misato. Azalaki kosala mwa mosala mpo na kobikela, mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela. Akutanaki na makambo ya mpasi na bomoi na ye, kasi akangamaki na ekateli na ye ya kosalela Yehova. Yango ekamwisaki ngai mpenza. Na 1992, tokendaki na Liyangani ya Etúká “Bamemi-pole” na engumba New York, mpe natunaki ye libala. Nsima ya mbula moko, tobalanaki. Kozala na mwasi oyo atyaka Yehova na esika ya liboso mpe alingaka kosɛka na bato, ezali likabo oyo euti na Yehova. Dawn asalisi ngai mingi mpenza na boumeli ya ntango nyonso oyo toIekisi elongo.—Mas. 31:12.
Ntango tobalanaki, mwana na ye moko akómaki na mbula 11, mosusu mbula 13, mpe mosusu mbula 16. Lokola nalingaki kozala tata ya malamu mpo na bana yango, natángaki na likebi mpe nasalelaki makambo nyonso oyo mikanda na biso elobeli mpo na kozala tata-mobɔkɔli malamu. Kosala bongo na boumeli ya bambula ezalaki pɛtɛɛ te, kasi nasepelaki ndenge bana yango bandimaki ngai lokola moninga na bango ya motema mpe tata ya bolingo. Na ndako tozalaki kosepela koyamba baninga ya bana na biso, mpe tozalaki kolinga ntango nyonso ete bilenge yango bázala elongo na biso.
Na 2013, ngai ná Dawn tokendaki kofanda na etúká ya Wisconsin mpo na kosalisa baboti na ye oyo bakómaki mibange. Likambo ya kokamwa, mosala na ngai na Betele esilaki te. Basɛngaki ngai nakoba kosalisa ebongiseli na biso na makambo etali mibeko.
MBONGWANA MOKO YA MBALAKAKA
Na sanza ya 09/2018, nakómaki kokosola mingi liboso ya koloba. Monganga ya esika oyo tozalaki kofanda asalaki ngai ekzamɛ, kasi amonaki eloko te. Na nsima, monganga mosusu ayebisaki ngai ete nakutana na monganga oyo atalelaka makambo ya misisa mpe motó. Na nsima, na sanza ya 01/2019, monganga yango alobaki na ngai ete nakoki kozala na maladi moko ya mabe oyo na nsima ekoki kobebisa nzoto na ngai mobimba.
Mikolo misato na nsima, ntango nazalaki kosala lisano moko oyo nazalaki kolinga mingi, lobɔkɔ na ngai ya mobali ebukanaki. Namesanaki na lisano yango bomoi na ngai mobimba; mpe nayebaki kosala yango malamu. Na yango, namonaki ete likoki na ngai ya kotambola malamu mpe ya kobatela nzoto na ngai ekómaki kobeba. Nakamwaki komona ndenge maladi yango ekolaki nokinoki mpe ekómaki mpasi mpo naloba malamu, nabaluka mpe namɛla eloko.
Nazali na esengo ndenge nasalelaki mayele oyo nayekolaki na kelasi na makambo etali mibeko mpo na kosalisa ebongiseli ya Yehova. Nazali mpe na esengo ndenge nakomaki masolo mingi na bazulunalo oyo minganga, bato ya mibeko mpe bazuzi batángaka. Nasalá mpe badiskur na bisika mingi na mokili, mpo na kolongisa lotomo ya Batatoli ya Yehova ya kondima kosala lipaso mpe kozwa lisalisi ya monganga kozanga ete bátya bango makila. Na yango, nazongelaka maloba ya Luka 17:10 oyo elobi ete: ‘Nazali moombo mpamba. Oyo nasali ezali oyo nasengelaki kosala.’