Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Juillet nk. 26-30
  • “Etumba ezali ya Yehova”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Etumba ezali ya Yehova”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BABOTI NA NGAI BAZALAKI BAMISIONƐRƐ YA MOLENDE
  • NABANDI KOSALA NA BIRO MONENE
  • NAYEKOLI NDENGE YA KOSAMBA NA BATRIBINALE
  • KOKƆTELA NSANGO MALAMU MPE KOFANDISA YANGO NA NZELA YA MIBEKO
  • NAPESI YO MATƆNDI, YEHOVA!
  • Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Tozali kobatela nsango malamu na nzela ya mibeko ya Leta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bikateli ya batribinale
    Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Bamonisi bosembo na bango na Bokonzi ya Nzambe
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Juillet nk. 26-30
Philip Brumley.

LISOLO YA BOMOI

“Etumba ezali ya Yehova”

LISOLO YA PHILIP BRUMLEY

MOKOLO ya 28/01/2010, nazalaki na engumba kitoko ya Strasbourg, na France. Kasi, nazalaki ata na likanisi moke te ya kotambola mpo na kotala engumba yango. Nazalaki wana elongo na bandeko mosusu mpo biro monene esɛngaki biso tósamba mpo na kokɔtela ntomo ya Batatoli ya Yehova na Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme [CEDH]). Likambo ezalaki ete guvɛrnema ya France elobaki ete bandeko ya ekólo yango basengeli kofuta mpako ya kolekisa ndelo mpenza, ya milio soki 64 ya euros (dolare 89 000 000). Oyo eleki ntina, likambo yango etalaki nkombo ya Yehova, lokumu ya bato na ye, mpe likoki na bango ya kosambela ye na bonsomi. Likambo oyo esalemaki mokolo wana na tribinale emonisaki ete “etumba ezali ya Yehova.” (1 Sa. 17:47) Mpo na nini nalobi bongo?

Matata yango ebandaki na nsuka ya bambula ya 1990 ntango guvɛrnema ya France elobaki ete filiale ya France esengeli kofuta mpako oyo euti na makabo oyo bandeko bapesaki na 1993 tii 1996. Tomemaki likambo yango na batribinale ya France, kasi tolongaki te. Ntango tolongaki te na tribinale moko, guvɛrnema ekangaki kɔnti ya banki ya filiale oyo ezalaki na mbongo koleka milio 4 ya euros ná ndambo (dolare 6 300 000). Elikya na biso ya nsuka ezalaki kaka na Tribinale monene ya Mpoto. Kasi, liboso Tribinale monene ekata likambo yango, esɛngaki ete biso ná baavoka ya guvɛrnema tósamba naino liboso ya moko ya basɛkrɛtɛrɛ ya Tribinale, ya bakonzi oyo balandelaka makambo na babiro, mpe ya baoyo balandelaka makambo ya mibeko mpo tómeka koyokana liboso ya kosamba na Tribinale monene.

Toyebaki ete sɛkrɛtɛrɛ wana akotya biso mbamba ete tóndima kofuta guvɛrnema ndambo ya mbongo oyo basɛngaki. Kasi, tokangaki ntina polele ete soki tofuti ata euro moko, yango ekoyokana te na mitinda ya Biblia. Lokola makabo oyo bandeko bapesaka ezalaka mpo na kosimba mosala ya Bokonzi ya Nzambe, mbongo yango ezali ya guvɛrnema te. (Mat. 22:21) Kasi, mpo na kotosa mibeko ya Tribinale monene, tokendaki kaka na likita yango.

Liboso ya Tribinale monene ya Mpoto elongo na bandeko, na 2010

Likita yango esalemaki na moko ya bandako kitoko ya Tribinale esika basalaka makita. Likita yango ebandaki malamu te. Na maloba na ye ya ebandeli, sɛkrɛtɛrɛ yango andimaki ete Batatoli ya Yehova ya France basengeli kofuta guvɛrnema mwa mbongo mpo na mpako. Na mbala moko tozwaki likanisi ya kotuna ye: “Oyebi ete guvɛrnema esili kokanga mbongo koleka milio 4 ya euros ná ndambo oyo ezalaki na kɔnti na biso na banki?”

Tomonaki ete mwasi yango abulunganaki. Ntango baavoka ya guvɛrnema bandimaki ete ezali bongo, ezaleli ya mwasi yango ebongwanaki mpenza. Agangelaki bato ya guvɛrnema mpe akataki mbala moko likita yango. Na ntango yango namonaki ete Yehova nde abongolaki makambo nyonso, na ndenge oyo biso tokanisaki ata te, mpo na kosalisa biso tólonga na likambo yango. Tobimaki wana na esengo, tozalaki kondima te makambo oyo esalemaki.

Na mokolo ya 30/06/2011, bazuzi nyonso ya Tribinale monene ya Mpoto balongisaki biso. Balongolaki mpako oyo guvɛrnema ekatelaki biso mpe bapesaki mitindo ete ezongisela biso mbongo oyo ekangaki, ná matabisi! Ekateli wana oyo etiká nsango ezali kobatela losambo ya pɛto na France tii lelo. Kaka motuna moko, oyo tobongisaki kutu liboso te, nde esalaki ete tólonga etumba, kaka lokola libanga oyo ekɔtaki na motó ya Goliate. Mpo na nini tolongaki? Mpo ndenge Davidi ayebisaki Goliate, “etumba ezali ya Yehova.”—1 Sa. 17:​45-47.

Tolongá na tribinale kaka na likambo wana te. Atako botɛmɛli ya bakonzi ya nguya ya politiki mpe ya mangomba, batribinale minene ya mikili 70 mpe batribinale ebele oyo etalelaka makambo ya mikili nyonso elongisaki Batatoli ya Yehova na makambo 1 225. Bolongi oyo tozwá na batribinale yango ebatelaka ntomo na biso ya ntina mingi, na ndakisa lotomo ya kondimama na Leta lokola lingomba, ya kobima na mosala ya kosakola na miso ya bato, ya koboya kosangana na milulu oyo ekumisaka ekólo, mpe ya koboya makila.

Ndenge nini nakendaki kokɔta na makambo ya kosamba na Mpoto nzokande nazalaki kosala na Biro monene ya Batatoli ya Yehova na États-Unis?

BABOTI NA NGAI BAZALAKI BAMISIONƐRƐ YA MOLENDE

Tata na biso George mpe mama na biso Lucille bazwaki diplome ya kelasi ya mbala ya 12 ya Gileade, mpe bazalaki kosala na Éthiopie ntango ngai nabotamaki na 1956. Bapesaki ngai nkombo Philip, lokola Filipi mopalanganisi ya nsango malamu na siɛklɛ ya liboso. (Mis. 21:8) Na mbula oyo elandaki, guvɛrnema epekisaki losambo na biso. Atako nazalaki naino mwana moke, nazali koyeba malamu ndenge libota na biso ezalaki kosambela Yehova na kobombana. Na bomwana wana, nazalaki kokanisa ete ezalaki esengo! Likambo ya mawa, bakonzi babenganaki biso na ekólo yango na 1960.

Nathan Knorr (na lobɔkɔ ya mwasi) ayei kotala libota na biso na Addis-Abeba, Éthiopie, na 1959

Ntango libota na biso ekendaki kofanda na Wichita, na etúká ya Kansas, na États-Unis, baboti na biso bamemaki eloko moko ya motuya mingi: molende na bango ya bamisionɛrɛ. Balingaki solo mingi mpe bateyaki biso bana na bango ndenge ya kolinga makambo ya Yehova; tozalaki ngai, yaya na ngai ya mwasi Judy, mpe leki na ngai ya mobali Leslie, oyo babotamaki mpe na Éthiopie. Nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 13. Mbula misato na nsima, libota na biso ekendaki kosala esika mposa ezalaki mingi na Arequipa, na Pérou.

Na 1974, wana nazalaki na mbula 18 mpamba, filiale ya Pérou etyaki ngai ná bandeko mibali mosusu minei babongisi-nzela monene. Tosengelaki kokende kosakola na teritware epai basakolaki naino te, na bangomba ya Andes. Yango esɛngaki kosakwela bankolo mboka oyo balobaka monɔkɔ ya Quechua mpe ya Aymara. Tosalaki mobembo na mai na kontɛnɛrɛ moko ya monene oyo basalá lokola ndako, mpe bazalaki kobenga yango Masuwa. Nazalaki kosepela ndenge tozalaki kosalela Biblia mpo na kolakisa bato ya mboka ete mosika te Yehova akosilisa bobola, maladi, mpe liwa. (Em. 21:​3, 4) Bato mingi bakómaki basambeli ya Yehova.

Kontɛnɛrɛ moko oyo batyá motɛrɛ ezali kotambola na mai.

“Masuwa,” 1974

NABANDI KOSALA NA BIRO MONENE

Ntango ndeko Albert Schroeder oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ayaki na Pérou na 1977, alendisaki ngai natondisa formilɛrɛ mpo na kosala na Betele na biro monene. Mpe nasalaki bongo. Mwa moke na nsima, na mokolo ya 17/06/1977, nabandaki kosala na Betele ya Brooklyn. Na boumeli ya mbula koleka minei oyo elandaki, nasalaki na Departema ya kotya bopɛto mpe ya kobatela mpe kobongisa biloko.

Mokolo ya libala na biso, na 1979

Na sanza ya 06/1978, nakutanaki na Elizabeth Avallone na liyangani moko oyo esangisaki mikili mingi na Nouvelle-Orléans, na Louisiane. Baboti na ye bazalaki kosalela Yehova na motema mobimba lokola kaka baboti na ngai. Elizabeth asilaki kozala mobongisi-nzela mbula minei, mpe azalaki mpenza na mposa ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso bomoi na ye mobimba. Tokobaki kosolola na mosika. Mpe eumelaki te, tolinganaki makasi. Tobalanaki na mokolo ya 20/10/1979, mpe tobandaki mosala ya Betele elongo.

Bandeko ya Brooklyn Espagnol, lisangá ya liboso epai batindaki biso, balingaki biso mingi. Na boumeli ya bambula, batindaki biso na masangá mosusu misato, epai bandeko bayambaki biso malamu mpe basungaki biso na mosala na biso na Betele. Tozali na botɔndi epai na bango mpe epai ya baninga ná bandeko ya libota oyo basalisaki biso na kokipe baboti na biso oyo bakómaki mibange.

Philip elongo na bandeko ya Betele na likita moko ya lisangá.

Bandeko ya Betele oyo bazalaki na lisangá ya Brooklyn Espagnol, na 1986

NAYEKOLI NDENGE YA KOSAMBA NA BATRIBINALE

Nakamwaki ntango batindaki ngai na Departema ya makambo ya mibeko na Betele na sanza ya 01/1982. Mbula misato na nsima, batindaki ngai na iniversite mpo nayekola makambo etali mibeko mpe nakóma avoka oyo azwá papye. Nakamwaki mpe nasepelaki ntango toyekolaki ete bonsomi ya kosala makambo mosusu, oyo bato bamonaka mpamba, ezala na États-Unis mpe bikólo mosusu, ekómá kotosama mingi mpo na makambo oyo Batatoli ya Yehova balongá na batribinale. Bazalaki mbala na mbala kopesa bandakisa yango na makambo oyo tozalaki kotánga na iniversite.

Na 1986, ntango nakómaki na mbula 30, batyaki ngai mokɛngɛli ya Departema ya makambo ya mibeko. Lokola nazalaki elenge mpe nayebaki mpenza te makambo oyo ekoki koya, nasepelaki na mokumba yango kasi namitungisaki mpe mingi.

Nakómaki avoka na 1988, kasi nayebaki te ete namityaki na likama mpo natikaki kelasi oyo natángaki ebebisa ngai mpe boyokani na ngai na Yehova. Iniversite ekoki kosala ete moto akóma na mposa ya koluka lokumu na ye moko mpe kotinda ye amona ete lokola azwi boyebi mingi na likambo moko, aleki baoyo batángá lokola ye te. Elizabeth asungaki ngai mingi. Asalisaki ngai nazongela mimeseno ya elimo oyo nazalaki na yango liboso nabanda kotánga na iniversite. Ezwaki ntango, kasi mokemoke nazongelaki lisusu makasi na ngai na elimo. Nakoki koloba ete kozala na motó oyo etondi na boyebi oyo ozwi na kelasi, ezali te likambo oyo eleki ntina na bomoi. Likambo oyo eleki ntina na bomoi ezali nde kozala na boyokani ya makasi na Yehova mpe kolinga ye ná basaleli na ye mingi.

KOKƆTELA NSANGO MALAMU MPE KOFANDISA YANGO NA NZELA YA MIBEKO

Nsima ya kosilisa iniversite, namipesaki na kobongisa makambo na departema na biso ya makambo ya mibeko na Betele mpe kokɔtela matomba ya Bokonzi na tribinale. Kopesa mabɔkɔ na ebongiseli na biso oyo makambo etambolaka nokinoki, ekolaka, mpe ebongwanaka mingi ezalaki esengo kasi ezalaki mpe na mikakatano. Na ndakisa, na ebandeli ya bambula ya 1990, basɛngaki Departema ya makambo ya mibeko esalisa na kobimisa malako oyo ebongiseli na biso ekosalela mpo tótika kosɛnga bato mbongo mpo na mikanda, ndenge tozalaki kosala banda kala. Na nsima, Batatoli ya Yehova bakómaki kokabola mikanda kozanga kosɛnga mbongo. Yango ekómisaki mosala na Betele mpe na teritware pɛpɛlɛ mpe tii lelo ezali kosalisa mpo básɛngaka biso mpako te mpo na misala yango. Bato mosusu bakanisaki ete mbongwana yango ekosilisa biso mbongo mpe ekozongisa mosala ya kosakola nsima. Nzokande mosala ekendaki kutu liboso. Motángo ya basaleli ya Yehova kobanda 1990 emati koleka mbala mibale, mpe lelo oyo bato bakoki kozwa bilei ya elimo kozanga kofuta mbongo. Ngai moko namoni na miso ete mbongwana wana mpe bambongwana mosusu oyo esalemi na ebongiseli ya Yehova elongi kaka mpo na makasi oyo Yehova apesaka mpe litambwisi na ye na nzela ya moombo ya sembo.—Kob. 15:2; Mat. 24:45.

Kolonga na tribinale etaleli kaka te kozala na baavoka oyo bayebi kosamba. Mbala mingi, eloko oyo etindaka bakonzi bálongisa biso ezalaka bizaleli malamu ya basaleli ya Yehova. Namonaki bosolo na yango na 1998 ntango bandeko misato ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ná basi na bango bakendaki mayangani ya ntina mingi na Cuba. Koleka makambo nyonso oyo tolobaki na bakonzi ya guvɛrnema, ezalaki boboto mpe limemya makasi ya bandeko wana nde esalaki ete bakonzi yango bándima ete tokɔtaka na makambo ya politiki te.

Nzokande, soki likoki ya kosilisa makambo na malɛmbɛ ezali te, tokendaka na tribinale mpo na “kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela mibeko.” (Flp. 1:7) Na ndakisa, na boumeli ya bambula mingi, bakonzi ya Mpoto mpe ya Corée du Sud bazalaki kondima te lotomo na biso ya kosala mosala mosusu na mboka na esika ya mosala ya soda. Na yango, bandeko soki 18000 na Mpoto mpe bandeko koleka 19000 na Corée du Sud bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na lisosoli na bango.

Nsukansuka na mokolo ya 07/07/2011, Tribinale monene ya Mpoto ezwaki ekateli oyo etiká nsango na likambo ya Bayatyan ná Arménie; endimaki ete na Mpoto mobimba moto akoki kosala mosala mosusu ya mboka na esika ya mosala ya soda. Ekateli ya ndenge wana ezwamaki mpe na Tribinale monene ya Corée du Sud na mokolo ya 28/06/2018. Tolingaki kolonga te na likambo yango soki ata mwa bandeko mibali moke kaka bandimaki mosala ya soda.

Bakɛngɛli ya Departema ya makambo ya mibeko na biro monene mpe badepartema ya makambo ya mibeko na Babetele na mokili mobimba basalaka mosala makasi mpo na kokɔtela matomba ya Bokonzi. Ezali lokumu monene kozala bamonisi ya bandeko na biso oyo bakutani na botɛmɛli ya baguvɛrnema. Ezala tolongi na tribinale to te, likambo na biso ezalaka litatoli mpo na baguvɛrnɛrɛ, bakonzi, mpe mpo na bikólo. (Mat. 10:18) Bazuzi, bamonisi ya guvɛrnema, bapanzi-nsango, mpe bato mosusu nyonso bamonaka bavɛrsɛ oyo totyaka na mikanda oyo tokɔtisi na tribinale to bayokaka bavɛrsɛ oyo totángi ntango tozali kosamba. Na ndenge yango, bato ya mitema sembo bayebaka soki Batatoli ya Yehova bazali banani mpe bayebaka esika oyo bindimeli na bango eutaka. Bato yango mosusu bakómá bandeko na biso.

NAPESI YO MATƆNDI, YEHOVA!

Na mbula 40 oyo eleki, nazwi libaku ya kosala makambo ya mibeko na bafiliale ndenge na ndenge na mokili mobimba mpe ya kosamba liboso ya batribinale minene ebele mpe liboso ya bakonzi mingi ya minene. Nasepelaka mpe nazalaka na limemya mingi mpo na bandeko oyo tosalaka na bango na Departema ya makambo ya mibeko na biro monene mpe na badepartema yango na mokili mobimba. Bomoi na ngai etondi na mapamboli mpe nazali na esengo mpenza.

Philip ná Elizabeth Brumley.

Elizabeth asalisi ngai na bosembo mpe na bolingo mpenza na boumeli ya mbula 45, na ntango ya bisengo mpe na ntango ya mpasi. Nasepelaka na ye mingi mpo asali yango atako azali na maladi oyo elyaka nzoto mpe esilisaka ye makasi.

Biso moko tomoni ete makasi mpe bolongi eutaka te na makoki oyo tozali na yango. Ndenge Davidi alobaki yango: “Yehova azali makasi ya bato na ye.” (Nz. 28:8) Ya solo, “etumba ezali ya Yehova.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto