Makambo oyo bato balobaka mpo na libondeli
“Ntango nabondelaka, nayokaka lokola Nzambe atɛlɛmi pembeni na ngai, asimbi ngai na lobɔkɔ mpe azali kotambwisa ngai ntango nasili mayele.”—MARÍA.
“Mwasi na ngai akufaki nsima ya kobɛla maladi ya kansɛr mbula 13. Nazali koyeba lisusu ete nazalaki kobondela Nzambe mokolo na mokolo mpe nazalaki komona ete azali mpenza koyoka ngai mpe komona mpasi na ngai. Nazalaki kozwa kimya.”—RAÚL.
“Libondeli ezali likabo ya malamu mpenza oyo Nzambe apesá bato.”—ARNE.
Na miso ya María, Raúl, Arne, mpe bato mosusu, libondeli ezali likabo ya malamu mpenza. Bamonaka ete na nzela ya libondeli, bakoki kosolola na Nzambe, kopesa ye matɔndi, mpe kosɛnga ye asalisa bango. Bandimaka na motema mobimba makambo oyo Biblia elobi mpo na libondeli ete: “Kotya motema oyo totyelaka [Nzambe] yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”—1 Yoane 5:14.
Kasi, ezali mpe na bato mingi oyo bandimaka te likambo oyo Biblia elobi mpo na libondeli. Steve alobi ndenge azalaki kotalela libondeli. Alobi: “Ntango nakómaki na mbula 17, baninga na ngai misato bakufaki. Moko na bango akufaki na aksida ya motuka, mpe mibale oyo batikalaki bazindaki na mai.” Steve asalaki nini? Alobi: “Nabondelaki Nzambe mpo nayeba mpo na nini makambo wana esalemaki, kasi nazwaki ata eyano moko te. Yango wana nalobaki: ‘Mpo na nini nabondelaka lisusu?’” Bato mingi bamonaka ete Nzambe ayanolaka na mabondeli na bango te, yango wana bamonaka te ntina ya kokoba kobondela.
Ezali mpe na makambo mosusu oyo etindaka bato bámona ete libondeli ezali na ntina te. Bato mosusu balobaka ete, lokola Nzambe ayebi makambo nyonso, ayebi bamposa mpe bampasi na biso, ntina ya koyebisa ye yango lisusu ezali te.
Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe aboyaka koyoka mabondeli na bango mpo na mabunga oyo basalá kala. Jenny alobi: “Mokakatano na ngai ya monene mpenza yango oyo: namimonaka ete nazali na ntina te. Nasalá makambo oyo eyokisaka ngai mawa mpenza, yango wana namilobelaka ete Nzambe akoki koyoka ngai ata moke te.”
Ndenge nini otalelaka libondeli? Soki ozali na mokakatano ya ndenge wana to omonaka ete libondeli ezali na ntina te, Biblia ekoki kopesa yo biyano ya malamu oyo ekosalisa yo. Tosengeli kondima makambo oyo Biblia elobi mpo na libondeli;a Biblia ekoki kosalisa yo ozwa biyano na mituna lokola:
Nzambe ayokaka mabondeli na biso?
Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli nyonso te?
Ndenge nini okoki kobondela mpo Nzambe ayanola na mabondeli na yo?
Ndenge nini mabondeli ekoki kosalisa yo?
a Biblia ezali na mabondeli ebele ya basaleli ya Nzambe, ezala mpe mabondeli ya Yesu Kristo. Makomami ya Ebre, oyo babengaka mpe Kondimana ya kala, ezali na mabondeli koleka 150.