Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w21 Juillet nk. 26-29
  • Nalekisi bomoi ya esengo na mosala ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nalekisi bomoi ya esengo na mosala ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NAKEI NA AFRIQUE DU SUD!
  • LIBALA MPE MOKUMBA YA SIKA
  • TOZONGI NA BETELE
  • NAZONGI LISUSU KOSALA NA ESIKA YA KONYATA MIKANDA
  • MOKUMBA MOSUSU YA SIKA!
  • Nakoli elongo na lisanga ya Jéhovah na Afrique du Sud
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mokanda ya biro
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
w21 Juillet nk. 26-29
John ná Laura Kikot.

LISOLO YA BOMOI

Nalekisi bomoi ya esengo na mosala ya Yehova

LISOLO YA JOHN KIKOT

MOSALA na ngai ya liboso na Betele ya Canada ezalaki ya kotya bopɛto na ndako oyo masini ya konyata mikanda ezalaki. Ezalaki na 1958, mpe na ntango yango nazalaki na mbula 18. Nazalaki kosepela na bomoi, mpe na nsima nakómaki kosala na masini oyo ekataka nsɔngɛ ya mikanda nsima ya konyatama. Nazalaki kosepela kosala na Betele!

Na mbula oyo elandaki, bapesaki liyebisi na libota ya Betele ete bazalaki na mposa ya bandeko mpo na kopesa mabɔkɔ na Betele ya Afrique du Sud, epai basengelaki kotya masini ya sika ya konyata mikanda. Natyaki nkombo na ngai mpe nasepelaki ndenge baponaki ngai. Baponaki mpe bandeko mosusu misato ya Betele ya Canada: Dennis Leech, Bill McLellan mpe Ken Nordin. Bayebisaki biso ete tokoumela na Afrique du Sud!

Nabengaki mama na telefone mpe nayebisaki ye: “Mama, nazali na nsango ya koyebisa yo. Nazali kokende na Afrique du Sud!” Mama azalaki mwasi moko ya kimya kasi azalaki na kondima makasi mpe na boyokani ya malamu ná Yehova. Alobaki makambo mingi te, kasi nayebaki ete andimaki ekateli yango. Atako papa ná mama bazalaki na mawa ndenge nakokóma mosika na bango, bandimaki ekateli oyo nazwaki.

NAKEI NA AFRIQUE DU SUD!

Tozali na engbunduka mpe tozali kolongwa na Cape Town mpo na kokende na Johannesburg elongo na Dennis Leech, Ken Nordin, mpe Bill McLellan na 1959

Biso nyonso minei na likita ya mbula ya 60 na filiale ya Afrique du Sud na 2019

Tokendaki naino na Betele ya Brooklyn, epai tozwaki formasyo na boumeli ya sanza misato mpo na koyeba kosalela masini ya konyata mikanda. Na nsima tozwaki masuwa mpo na kokende na Cape Town, na Afrique du Sud. Na ntango yango, nazalaki kaka na mbula 20. Ntango tokómaki na Cape Town, tozwaki engbunduka na mpokwa mpe tosalaki mobembo molai mpo na kokende na Johannesburg. Totɛlɛmaki na Karoo oyo ezali engumba moko ya moke na kati ya esobe. Ezalaki na putulu mpe molunge. Totalaki na fɛnɛtrɛ mpe tomitunaki soki tozalaki mpenza wapi. Tokómaki komitungisa mpo na mokumba yango ya sika. Nsima ya mwa bambula, ntango toyaki lisusu kotala esika yango, tosepelaki na mwa bingumba yango ya mike mpe tomonaki ete ezalaki esika moko ya kimya.

Na boumeli ya mwa bambula, nasalaki na masini moko ya monene mpe oyo ezalaki mindɔndɔ. Masini yango ezalaki kobongisa milɔngɔ ya balɛtrɛ mpo na konyata Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Biro ya filiale ezalaki konyata bazulunalo na minɔkɔ mingi ya Afrika, kaka mpo na Afrique du Sud te kasi mpe mpo na bikólo mingi ya Afrika. Tosepelaki mingi ndenge toutaki na Canada mpo na koya kosala na masini yango oyo ezalaki kosalelama mingi mpenza!

Na nsima, nasalaki na biro oyo ezalaki kolandela makambo ndenge na ndenge ya konyata mikanda, kotinda yango, mpe mosala ya kobongola. Nazalaki na makambo mingi ya kosala mpe nazalaki na bomoi ya esengo.

LIBALA MPE MOKUMBA YA SIKA

Ngai ná Laura, ntango tozalaki babongisi-nzela monene na 1968

Na 1968, nabalaki Laura Bowen, oyo azalaki mobongisi-nzela mpe azalaki kofanda pene na Betele. Azalaki mpe kobɛta masini ya kokoma na Departema ya Kobongola. Na ntango wana, lokola bato oyo babalani sika bazalaki kotikala na Betele te, batindaki biso babongisi-nzela monene. Namitungisaki mwa moke. Na yango, tomitunaki boye: ‘Nsima ya kolekisa mbula zomi na Betele epai bazalaki kopesa biso bilei mpe esika ya kolala, ndenge nini tokobanda kokokisa bamposa na biso na mwa mbongo moke oyo bakobanda kopesa biso?’ Na ntango wana, bazalaki kopesa mokomoko na biso mbongo oyo ezalaki na valɛrɛ ya dolare 35 sanza na sanza. Mpe bazalaki kopesa yango kaka soki tokokisi bangonga oyo esengisamaki, tozongeli bato, mpe tokaboli mikanda. Kaka na mbongo wana tosengelaki kofutela ndako, kosomba bilei, kofuta tike ya motuka, ezala mpe kozwa lisalisi ya monganga, to mpe kokokisa bamposa na biso mosusu.

Batindaki biso na etuluku moko ya moke pene na engumba Durban, na Océan Indien. Bato ya ekólo Inde bazalaki mingi kuna. Mingi kati na bango bazalaki bakitani ya bato oyo bakendaki na Afrique du Sud mpo na kosala na bakɔmpanyi oyo esalaka sukali na nsuka ya bambula ya 1 800. Atako bakómaki kosala misala mosusu, babatelaki bonkɔnkɔ na bango, lolenge na bango ya kolamba, ezala mpe bilei na bango ya kitoko. Mpe lokola bazalaki koloba Anglais, kosolola na bango ezalaki mpasi te.

Lokola bazalaki kosɛnga babongisi-nzela monene bákokisa bangonga 150 sanza na sanza na mosala ya kosakola, yango wana ngai ná Laura tokokisaki bangonga motoba na mokolo ya liboso. Molunge ezalaki makasi mpe mabele ezalaki maimai. Lokola tozalaki na bato ya kozongela te, ata mpe bayekoli ya Biblia, tosakolaki ndako na ndako na boumeli ya ngonga motoba. Nsima ya kolekisa mwa ntango na mosala ya kosakola, natalaki ngonga mpe namonaki ete tolekisaki kaka miniti 40! Namitunaki boye: ‘Ndenge nini tokokokisa mpenza mokumba oyo?’

Na nsima, tobongisaki programɛ na biso malamu. Mokolo na mokolo tozalaki kobongisa mwa limpa mpe kotya kafe na termosi. Ntango tozalaki na mposa ya kopema, tozalaki kotɛlɛmisa motuka na biso pene ya mwa nzete mpe na bantango mosusu, bana mike ya bato ya ekólo Inde babandaki kotalatala biso. Kaka na mwa mikolo moke, tomonaki ete nsima ya kolekisa ngonga mibale to misato na mokolo, ngonga oyo etikali ezalaki koleka mbangu mpenza.

Ezalaki mpenza esengo koyebisa solo ya Biblia epai ya bato wana ya boboto! Tomonaki ete bato ya ekólo Inde bazalaka na limemya, boboto, mpe babangaka Nzambe. Bato mingi ya lingomba Hindu bandimaki nsango oyo tomemelaki bango. Basepelaki koyekola makambo etali Yehova, Yesu, Biblia, mokili ya sika ya kimya oyo Nzambe alaki, mpe elikya mpo na bato oyo bakufá. Nsima ya mbula moko, tokómaki na bayekoli ya Biblia 20. Mokolo na mokolo, tozalaki kosepela kolya elongo na moko ya mabota ya bato oyo tozalaki koyekola na bango. Yango ezalaki kopesa biso mpenza esengo.

Kasi eumelaki te, tozwaki mokumba ya sika. Batindaki biso na mosala ya zongazonga na bamboka oyo ezalaki pembenipembeni ya Océan Indien. Pɔsɔ na pɔsɔ, libota moko ezalaki koyamba biso ntango tokei kotala lisangá, mpe tozalaki kosala elongo na basakoli mpo na kolendisa bango. Tokómaki mpenza lokola bato ya libota na bango, tozalaki kosepela na bana na bango mpe banyama na bango. Tolekisaki mbula mibale ya kitoko. Kasi na mbala moko biro ya filiale ebengaki biso na telefone. Balobaki na biso boye: “Tolingi ete bózonga na Betele.” Nayebisaki bango: “Tozali mpenza na esengo na esika oyo tozali.” Kasi tondimaki ete bátinda biso esika nyonso oyo bakolinga.

TOZONGI NA BETELE

Na Betele, batyaki ngai na Departema ya Mosala, epai nazwaki libaku ya kosala elongo ná bandeko mibali mingi oyo bakɔmeli. Na ntango wana, nsima ya kotala lisangá moko, mokɛngɛli ya zongazonga azalaki kotinda lapolo ya lisangá yango na departema ya mosala na Betele. Mpe na nsima, departema ya mosala ezalaki kotinda mokanda na lisangá, na kotalela makambo oyo mokɛngɛli ya zongazonga akomaki na lapolo. Mikanda yango ezalaki mpo na kolendisa masangá mpe kopesa malako oyo lisangá ezalaki na yango mposa. Basɛkrɛtɛrɛ bazalaki kosala mosala makasi mpo na kobongola na Anglais balapolo ya bakɛngɛli ya zongazonga oyo ezalaki na monɔkɔ ya Xhosa, Zulu, mpe minɔkɔ mosusu. Mpe na nsima, babandaki kobongola mikanda oyo euti na filiale na minɔkɔ ya Afrika. Nasepelaki mingi na misala oyo babongoli yango bazalaki kosala mpe basalisaki ngai nayeba mikakatano oyo bandeko na biso baindo ya Afrika bazalaki kokutana na yango.

Na ntango wana na Afrique du Sud, guvernɛma ekabolelaki bato bisika ya kofanda na kotalela loposo na bango. Yango wana ezalaki mpasi bato ya loposo ekeseni bálekisa ntango elongo. Bandeko na biso ya baindo bazalaki koloba minɔkɔ na bango, kosakola na minɔkɔ na bango, mpe kokende na masangá ya minɔkɔ na bango.

Nayebaki bandeko mingi ya baindo te, mpo bateritware ya masangá oyo bazalaki kotinda ngai, ezalaki kaka ya monɔkɔ ya Anglais. Kasi nayaki kozwa libaku ya koyekola makambo ya baindo ya Afrika ezala mimeseno mpe bonkɔkɔ na bango. Nayebaki mikakatano oyo bandeko bazalaki kokutana na yango na oyo etali bonkɔkɔ mpe bindimeli ya mangomba. Bamonisaki mpenza mpiko ndenge batikaki mimeseno mpe bonkɔkɔ oyo eyokani te na Makomami, mpe ndenge bayikaki mpiko na botɛmɛli makasi ya bato ya mabota mpe ya mboka na bango, mpo baboyaki kolanda mimeseno ya misala ya bilimo mabe! Na bamboka, bato mingi bazalaki babola. Mingi batángaki kelasi te, kasi bazalaki na limemya mpo na Biblia.

Nazwaki mpe libaku ya kolandela makambo mosusu na tribinale na oyo etali bonsomi ya losambo mpe koboya kokɔta na makambo ya politiki. Ndenge oyo bilenge Batatoli ya Yehova bamonisaki bosembo mpe mpiko mpo baboyaki kokɔta na makambo ya losambo mpe koyemba banzembo ya mangomba elendisaki ngai.

Bandeko bakutanaki mpe na mokakatano mosusu na ekólo moko ya moke ya Afrika oyo na ntango wana ezalaki kobengama Swaziland. Ntango Mokonzi Sobhuza II akufaki, basɛngaki bana-mboka nyonso ya ekólo yango básala milulu mosusu oyo bato basalaka ntango moto akufi. Mibali basengelaki kokata nsuki nyonso ya motó, mpe basi basengelaki kokata nsuki na bango mpo ekóma mikuse. Banyokolaki bandeko mingi mpo baboyaki kosangana na milulu wana oyo eyokanaki na losambo ya bankɔkɔ. Bosembo na bango epai ya Yehova, esimbaki mpenza mitema na biso! Toyekolaki mpenza makambo mingi epai ya bandeko na biso ya Afrika na oyo etali komonisa bosembo mpe motema molai, mpe yango ekómisaki kondima na biso makasi.

NAZONGI LISUSU KOSALA NA ESIKA YA KONYATA MIKANDA

Na 1981, basɛngaki ngai nazonga lisusu kosala na esika ya konyata mikanda, mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala yango na nzela ya baordinatɛrɛ. Ezalaki ntango moko ya kitoko mpenza! Lolenge ya konyata mikanda na mokili ekómaki mpenza kobongwana. Moto moko oyo azalaki kotɛka biloko, apesaki biro ya filiale masini ya konyata mikanda mpo emeka kosalela yango kozanga kofuta mbongo. Yango esalaki ete tólongola masini libwa ya kala oyo tozalaki na yango, mpe tótya masini mitano ya sika oyo tozwaki. Totyaki mpe masini mosusu ya sika ya konyata mikanda. Tokómaki konyata mikanda ebele koleka ndenge ezalaki liboso!

Kosalela baordinatɛrɛ esalisaki biso mpo tóbimisa programɛ moko ya sika oyo babengi MEPS, mpo na kobongisa malamu makomi na papye. Mayele ya teknoloji ekoli mingi bandá tolongwá na Canada mpo na koya kosala awa na Afrique du Sud! (Yis. 60:17) Biso nyonso tobalaki basi ya malamu oyo bazalaki babongisi-nzela mpe balingaki Yehova mingi. Ngai ná Bill tokobaki kosala na Betele. Ken ná Dennis bakómaki batata ya mabota mosika te na Betele.

Mosala ezalaki se kokóma mingi na Betele. Bazalaki kobongola mpe konyata mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ ebele mpenza mpe bazalaki kotinda yango na Babetele mosusu. Nsukansuka, esɛngaki ete bátonga Betele mosusu ya sika. Bandeko batongaki Betele moko ya kitoko na wɛsti ya Johannesburg, mpe molulu ya bofungoli Betele yango esalemaki na 1987. Ezalaki mpenza esengo kopesa mabɔkɔ na bokoli wana monene mpe kosala na Komite ya filiale ya Afrique du Sud na boumeli ya bambula mingi.

MOKUMBA MOSUSU YA SIKA!

Na 2001, tokamwaki mpenza ndenge babengaki biso tókende kosala na filiale ya sika ya États-Unis. Atako toyokaki mawa kotika mosala mpe baninga na biso na Afrique du Sud, tosepelaki mingi kobanda bomoi ya sika na libota ya Betele ya États-Unis.

Kasi tomitungisaki mpo esɛngaki ete tózala mosika na mama ya Laura oyo akómaki mobange. Lokola tokómaki na New York, tozalaki na likoki te ya kosala mingi mpo na kosalisa ye. Kasi bandeko ya Laura misato ya basi bandimaki kokokisa bamposa na ye ya mosuni, kozala pene na ye, mpe kosalisa ye na makambo ya mbongo. Balobaki boye: “Biso tozali te na likoki ya kozala na mosala ya ntango nyonso, kasi soki tokokisi bamposa ya mama, yango ekosalisa bino bókoba na mokumba na bino.” Tozalaka na botɔndi mingi mpo na oyo basalaki.

Ndenge moko mpe, ndeko na ngai ya mobali ná mwasi na ye oyo bazalaki kofanda na Toronto, na Canada, bandimaki kobatela mama na ngai mpo na ntango wana papa asilaki kokufa. Bafandaki ná mama na boumeli ya mbula koleka 20. Tosepelaka mpenza na likebi mpe na bolingo oyo bamoniselaki ye tii ntango akufaki mwa moke nsima ya kokóma na biso na New York. Ezali mpenza lipamboli kozala na bandeko ya libota oyo bandimaka kobongola makambo ya bomoi na bango mpo na kondima kobatela baboti na bango oyo bakómi mibange, oyo na ntango mosusu ezalaka mpasi!

Na boumeli ya bambula na Betele ya États-Unis, nazalaki kosala na departema ya kobimisa mikanda, mosala oyo eyokani na teknoloji ya mikolo oyo mpe ekómi lisusu pɛtɛɛ. Kala mingi te, nazalaki kosala na departema ya kosomba biloko. Nazali mpenza na esengo ndenge nalekisi mbula 20 oyo euti koleka na filiale oyo ya monene, oyo ezali sikoyo na bandeko ya libota ya Betele soki 5 000, mpe bandeko 2 000 oyo bayaka kopesa mabɔkɔ!

Eleki sikoyo mbula 60, nayebaki te ete nakozala awa. Laura asalisi ngai mingi na boumeli ya bambula wana nyonso. Nalekisi mpenza bomoi ya malamu mingi koleka! Tozwaka na motuya mingi mikumba ndenge na ndenge oyo tozwaki mpe bato nyonso ya malamu oyo tosalaki elongo na bango, ezala mpe baoyo tokutanaki na bango ntango tokendaki kotala bafiliale na bisika mingi na mokili. Sikoyo, lokola nazali na mbula koleka 80, nasalaka lisusu mosala makasi te mpo bandeko oyo bazali bilenge bazwaki formasyo mpo bákokisa mokumba yango.

Mokomi ya nzembo akomaki: “Esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango.” (Nz. 33:12) Maloba yango ezali mpenza solo! Nazali mpenza na botɔndi ndenge nasaleli Yehova elongo na basaleli na ye oyo bazalaka na esengo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto