Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp22 No. 1 nk. 10-11
  • 3 | Longolá koyina na makanisi na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 3 | Longolá koyina na makanisi na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liteya ya Biblia:
  • Yango elimboli nini?
  • Oyo okoki kosala:
  • Stefano​—“Atondaki na ngɔlu ya Nzambe mpe na nguya”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Babomi Stefano na mabanga
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Ndenge ya kotika koyina basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Tokoki kotika ezaleli ya koyina basusu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
wp22 No. 1 nk. 10-11
Mobali moko azali komona na makanisi ete azali kopesa moto ya loposo mosusu mbote. Bilili na bango ezali komonisa ndenge basimbi bilembo oyo elakisi ete batomboki mpe bazali koswana.

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

3 | Longolá koyina na makanisi na yo

Liteya ya Biblia:

“Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”​—BAROMA 12:2.

Yango elimboli nini?

Ndenge tokanisaka ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe. (Yirimia 17:10) Tosengeli kosuka kaka te na koboya koloba to kosala eloko nyonso oyo emonisi ete tozali koyina basusu. Ezaleli ya koyina bato eutaka na makanisi mpe na motema. Yango wana, tosengeli koboya kotya makanisi na eloko nyonso oyo ekoki kotinda biso tóyina basusu. Soki tosali bongo nde tokoki mpenza “kobongwana” mpe kosilisa ezaleli ya koyina basusu.

Oyo okoki kosala:

Talelá malamu makambo oyo okanisaka mpo na basusu mpe ndenge oyo otalelaka bango, mingimingi soki bazali bato ya loposo mosusu to ya mboka mosusu. Omituna boye: ‘Ndenge nini natalelaka bango? Ndenge natalelaka bango euti na makambo oyo ngai moko nayebi mpo na bango? To euti nde na makanisi mabe oyo bato bakaniselaka bango?’ Tiká kotala bavideo to bafilme, kotánga na Internet masolo oyo ekumisaka ezaleli ya koyina bato to oyo elendisaka mobulu, ezala mpe kominanola oyo elendisaka ezaleli yango.

Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tólonga momeseno ya koyina bato na makanisi mpe na motema na biso

Mbala mingi, ezalaka pɛtɛɛ te kotalela makanisi mpe mayoki na biso na ndenge oyo ebongi. Kasi Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso ‘tósosola makanisi mpe mikano ya motema.’ (Baebre 4:12) Kobá koyekola Biblia. Kokanisá mateya na yango ná makanisi na yo, mpe salá nyonso okóma kokanisa na ndenge oyo ekosepelisa Nzambe. Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tólongola ezaleli ya koyina basusu oyo “epikamá makasi” na mitema mpe na makanisi na biso.​—2 Bakorinti 10:4, 5.

Likambo moko oyo esalemaki mpenza​—STEPHEN

Abongolaki lolenge na ye ya kokanisa

Stephen.

Mindɛlɛ bazalaki koyina Stephen ná bandeko na ye. Yango wana, azalaki kolanda makanisi ya etuluku moko ya bato ya lingomba ya politiki oyo ebundelaka ntomo ya bato. Na nsima, koyina basusu etindaki ye asala likambo moko ya mabe mpenza. Stephen alobi boye: “Mokolo moko ngai ná baninga na ngai totalaki bafilme oyo emonisaki mpasi oyo bamonisá baombo ya Afrika na États-Unis. Lokola makambo wana ya kozanga bosembo ematisaki nkanda na biso, tobɛtaki bilenge ya mindɛlɛ oyo bazalaki wana mabe mpenza. Na nsima, tokendaki na bakartye ya mindɛlɛ mpo na koluka bato mosusu ya kobɛta.”

Makanisi ya Stephen ebongwanaki mpenza ntango abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Alobi ete ‘Lokola namoná makambo mabe oyo esalemá mpo na kokanisela bato ya loposo mosusu mabe, makambo oyo namonaki epai ya Batatoli ya Yehova ekamwisaki ngai. Na ndakisa, ntango Motatoli moko ya mondɛlɛ asalaki mobembo na mboka ya bapaya, atikaki bana na ye na libota moko ya baindo mpo bábatela bango. Lisusu, libota moko ya mindɛlɛ ezwaki elenge moko ya moindo afanda epai na bango mpo azangaki esika ya kofanda.’ Stephen amindimisaki ete Batatoli ya Yehova bazali mpenza na bolingo ya bondeko oyo Yesu asakolaki ete ekomonana na kati ya bakristo ya solo.​—Yoane 13:35.

Nini esalisaki Stephen atika koyina bato ya loposo mosusu mpe kobunda na bango? Baroma 12:2 nde esalisaki ye. Alobi boye: “Koyekola Biblia esalisaki ngai namona ete nasengeli kobongola makanisi na ngai. Nasengelaki kobongisa makanisi na ngai mpo nasuka kaka te na kosala makambo na kimya, kasi namona mpe ete ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu.” Esali sikoyo mbula koleka 40 banda Stephen atiká koyina bato mosusu.

Mpo na koyeba makambo mosusu na lisolo ya Stephen, tángá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2015, nkasa 10-11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto