Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/5 lok. 3
  • Masolo ya basi mibale oyo bakufelá mibali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo ya basi mibale oyo bakufelá mibali
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Liboso mpe nsima​—Azwaki makasi ya kobongwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bapesi bambwa na ngai bisikiti
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Tósalisa basi oyo bakufelá mibali na mpasi na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Moto oyo molongani akufá azalaka na mposa ya nini? Ndenge nini okoki kosalisa ye?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/5 lok. 3

Masolo ya basi mibale oyo bakufelá mibali

SANDRA azali mwasi oyo akufelá mobali mpe afandaka na ekólo Australie. Ntango mobali na ye akufaki, eleki sikoyo mwa bambula, Sandra abulunganaki makanisi. “Ntango namonaki ete esili, nazangi molongani mpe moninga na ngai ya motema, likambo yango elekaki ngai motó. Tii lelo oyo nayebaka te ndenge oyo nalongwaki na lopitalo tii nakómaki na ndako to mpe makambo nini nasalaki na nsima na mokolo wana. Na bapɔsɔ oyo elandaki, kobanga oyo nazalaki na yango esilaki mpe na esika na yango nakómaki nde koyoka mpasi na nzoto.”

Sandra azali na moninga moko ya mokóló, Elaine; ye mpe mobali na ye akufá eleki sikoyo mbula soki motoba. Elaine asalaki sanza motoba mpo na kokɛngɛla David mobali na ye, ntango azalaki kobɛla, tii akufaki na maladi ya kanser. Elaine ayokaki mpasi mingi; kutu, mwa mikolo na nsima ya liwa ya mobali na ye, miso na ye ekufaki na boumeli ya mwa ntango. Mokolo mosusu, mbula mibale na nsima ya liwa ya mobali na ye, akweaki na miso ya bato. Monganga asalaki ye ekzamɛ kasi azwaki ye na maladi te. Kasi amonaki ete Elaine azalaki kobomba mpasi na ye na motema; yango wana alobaki na ye akende na ndako mpe asala makasi ete alela. Elaine alobi ete: “Esalaki mikolo mingi mpo namesana na mawa na ngai.” Lisusu, soki azali kaka ye moko, Elaine alobi likambo moko oyo azalaki kosala: “Nazalaki kokende na shambre mpe nazalaki kozipa motó na ngai na bilamba ya David.”

Ya solo, kokufela mobali oyo olingaki mingi ememaka mitungisi ndenge na ndenge, mpamba te, likoló ya mpasi ya kotikala yo moko kozanga mobali, ezalaka mpe na mikakatano mosusu. Na ndakisa, na eleko moko, Sandra amonaki ete azalaki lisusu ye te. Lokola basi mingi oyo bauti kokufela mibali, azalaki mpe koyoka ete azangi moto oyo akobatela ye. Sandra alobi boye: “Lokola nazalaki momeseno ya kotika ete mobali na ngai azwaka ekateli ya nsuka; mbala moko natikalaki ngai moko mpo na kozwa bikateli yango. Mpɔngi na ngai ekómaki kokatanakatana. Nakómaki kolɛmbalɛmba. Nayebaki likambo ya kosala te.”

Mokolo na mokolo, makambo lokola oyo ya Sandra na Elaine ezali kokómela ebele ya basi na mokili mobimba. Mibali mingi bazali kokufa na maladi, na makama, na bitumba, ntango bazali koboma bato ya etuluka moko mpe na mobulu; mpe ntango bakufi, bazali kotika basi na bango bango moko.a Mingi kati na basi yango bafandi na mpasi na bango na motema, bazali koyeba likambo ya kosala te. Baninga na bandeko bakoki kosala nini mpo na kosalisa bango bámesana na bomoi ya ndenge yango? Lisolo oyo elandi epesi mwa makanisi oyo ekoki kosalisa.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Basi mosusu bazali na mikakatano lokola basi oyo bakufelá mibali mpo mibali na bango basundolá bango. Atako kokabwana mpe koboma libala ezali na mikakatano ekeseni na oyo ya kokufela mobali, makanisi mingi oyo epesami na lisolo elandi ekoki mpe kosalisa basi yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto