Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp21 No. 3 nk. 12-14
  • Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • LISALISI OYO EUTI NA ESIKA OYO ELEKI MALAMU
  • Biblia elobi nini?
    Lamuká!—2017
  • Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
  • Epai wapi okoki kozwa litambwisi libongi na kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
wp21 No. 3 nk. 12-14
Mobali moko azali kotánga Biblia.

Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?

Ndenge tolobelaki yango na masolo eleki, bato bazali kosala nyonso mpo bázala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Yango wana, bazali kotya motema na bango na liteya oyo elobaka ete makambo nyonso etángamá, na bakelasi ya milaimilai, na bomɛngo, mpe na kozala moto malamu. Kasi, koluka kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya na lolenge wana, ezali lokola kokende na esika moko boye kasi ozwi nde nzela oyo ekei epai mosusu. Yango elingi nde koloba ete ezali na eloko moko te oyo ekoki kosalisa moto mpo azala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya? Ezali bongo te!

LISALISI OYO EUTI NA ESIKA OYO ELEKI MALAMU

Mbala mingi, ntango tolingaka kozwa bikateli, totunaka mokóló to moto oyo aleki biso na bwanya. Ndenge moko mpe, tokoki kozwa lisalisi ya malamu epai ya moto oyo azali mokóló mpe oyo aleki biso mosika mpenza na bwanya. Toli ya moto yango ezali na mikanda moko oyo ezali na Makomi mosantu oyo basangisá mpe esali buku moko. Kokomama ya buku yango ebandaki eleki sikoyo mbula soki 3 500. Makomi mosantu yango oyo basangisi esika moko babengaka yango Biblia.

Mpo na nini osengeli kondimela makambo oyo Biblia elobi? Mpo moto oyo akomisá yango azali mokóló mpe azali na bwanya koleka moto nyonso. Biblia elobi ete azali “Mokóló na Mikolo” oyo azali “libela na libela.” (Danyele 7:9; Nzembo 90:2) Azali “Mozalisi ya likoló, Ye Nzambe ya solo, Moto oyo asalaki mabele.” (Yisaya 45:18) Ye moko alobi ete nkombo na ye ezali Yehova.​—Nzembo 83:18.

Biblia euti epai ya Mozalisi. Elobi ata esika moko te ete bato ya loposo boye baleki bato ya loposo oyo kuna, to mimeseno boye eleki oyo kuna. Toli ya buku yango esilaka ngala te, mpe bato ya bikólo nyonso bazwelaka yango litomba. Buku yango ezali na minɔkɔ ebele mpenza, mpe ekabolamaka koleka babuku mosusu nyonso.a Yango elingi koloba ete bato ya mokili mobimba bakoki kotánga yango mpe kolanda toli na yango. Makambo oyo elandi ezali makambo oyo Biblia yango moko elobi:

“Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—MISALA 10:34, 35.

Kaka ndenge baboti balingaka bana na bango mpe basalisaka bango, Yehova Nzambe azali Tata ya bolingo oyo azali kosalisa biso na nzela ya Liloba na ye, Biblia. (2 Timote 3:16) Okoki kondimela Liloba na ye, mpo ye moto asalaki biso mpe ayebi makambo oyo ezali malamu mpo na biso.

TOKOKI KOTYA MOTEMA NA TOLI YA BIBLIA

Elilingi: 1. Mobali moko afandi na engbunduka mpe azali kotánga na telefone na ye. 2. Telefone ya mobali yango ezali kolakisa Biblia.

Tokoki kondima makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya, mpo eleki sikoyo mbula soki 2000, esakolaki na bosikisiki makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe bizaleli oyo bato bazali na yango lelo oyo.

MAKAMBO

“Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge, mpe bamaladi mabe mpe nzala ekozala bisika ndenge na ndenge.”​—LUKA 21:10, 11.

BIZALELI

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.”​—2 TIMOTE 3:1-4.

Okoloba nini ndenge oyekoli ete Biblia esakolaki na bosikisiki banda kala mpenza makambo oyo ezali kosalema lelo oyo? Na ntembe te, okondima makambo oyo Leung, moto moko ya Hong Kong alobi. Alobi boye: “Bisakweli ya Biblia ekomamaki kala mpenza. Ekoki kosalema te ete moto asakola makambo yango na bosikisiki boye. Biblia ekomamaki na litambwisi ya moto moko oyo aleki bato nyonso na bwanya.”

Ebele ya bisakweli ya Biblia ekokisamá.b Yango endimisi biso ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe. Yehova alobi: “Nazali Nzambe, mpe mosusu azali te, mosusu oyo azali lokola ngai mpe azali te. Moto oyo banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka.” (Yisaya 46:9, 10) Yango wana, osengeli mpenza kondima makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya.

TOLI MPO NA BOLAMU NA YO LELO MPE MPO NA MIKOLO EZALI KOYA

Baboti ná bana na bango basimbani mabɔkɔ mpe bazali kotambola na kati ya elanga moko.

Ntango ozali kolanda toli oyo ezali na Biblia, okozwa litomba. Talá bandakisa oyo.

TOLI YA MALAMU MPO NA KOSALISA YO OTALELAKA MBONGO MPE MOSALA NA BOKATIKATI

“Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”​—MOSAKOLI 4:6.

BOMOI YA LIBOTA

“Mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko, mpe mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”​—BAEFESE 5:33.

KOYEBA KOFANDA NA BATO

“Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka; kosilika te kaka mpo na kosala mabe.”​—NZEMBO 37:8.

Kotosa makambo oyo Biblia elobi ekosalisa yo sikoyo mpe ekopesa yo bolamu mingi na mikolo ezali koya. Na Biblia, ezali na bilaka ya Nzambe oyo elobi ete bomoi na mikolo ezali koya ekozala malamu mingi. Kati na makambo yango

BATO BAKOZALA NA KIMYA MPENZA

“Bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—NZEMBO 37:11.

MOTO NYONSO AKOZALA NA NDAKO MPE NA BILOKO YA KOLYA

“Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna, mpe bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.”​—YISAYA 65:21.

MOTO AKOBƐLA LISUSU TE MPE AKOKUFA TE

“Liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—EMONISELI 21:4.

Osengeli kosala nini mpo omindimisa ete okozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya? Talá lisolo oyo elandi.

a Mpo na koyeba ndenge Biblia ebongolami mpe ekabolami, kende na www.pr2711.com mpe kɔtá na esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > ISTWARE MPE BIBLIA.

b Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9 ya buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na Internet na www.pr2711.com. Kɔtá na esika bakomi BIBLIOTƐKƐ > BABUKU MPE MWA BABUKU.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto