Maloba ya ebandeli
Ozelaka na mposa makasi mokolo oyo bitumba mpe mobulu ekozala lisusu te? Mpo na bato mingi, likanisi yango ezali malamu, kasi ekoki kosalema te. Biblia emonisi mpo na nini milende oyo bato bazali kosala mpo na kosilisa bitumba ezali kosimba te. Emonisi mpe ndenge oyo okoki kozala na kondima ete mokolo mosusu kimya ekozala na mokili mobimba, mpe ndenge oyo mosika te likambo yango ekokokisama.
Na lisolo oyo, liloba “bitumbaʺ mpe “mobuluʺ elakisi bitumba kati na bituluku ndenge na ndenge ya bato oyo bazali na mandoki mpe oyo bazali kobunda mpo na kokokisa mokano moko boye. Bankombo ya bato mosusu oyo balobeli awa topesi bango kopesa.