Nsɔmɔ ya bitumba
Ezali na makambo mingi te oyo enyokolaka bato koleka mpasi oyo bitumba mpe mobulu ebimisaka. Basoda mpe bana-mboka oyo bamoná bitumba na miso nde bayebi malamu mpasi yango.
BASODA
“Ozali komona na miso boye ndenge bato bazali kokufa mpe kozoka makasi. Okokóma kobanga ntango nyonso.”—Gary, Grande-Bretagne.
“Nazwaki masasi na mokɔngɔ mpe na elongi, mpe namonaki ndenge bato mingi bazalaki kokufa, ezala bana to mikóló. Bitumba esalaka ete moto akóma motema makasi.”—Wilmar, Colombie.
“Ntango babɛti moto masasi liboso na yo, okoki kobosana likambo yango te. Ekobanda kozongela yo mbala na mbala na makanisi. Ekozala mpasi obosana moto yango.”—Zafirah, États-Unis.
BANA-MBOKA
“Nazalaki komona nɛti nakoyokaka lisusu esengo te na bomoi. Ozali kobanga kaka mpo na bomoi na yo te, kasi mingimingi nde mpo na bomoi ya bato ya libota na yo mpe ya baninga na yo.”—Oleksandra, Ukraine.
“Tozalaki kobanga mpo totɛlɛmaki na molɔngɔ mpo na kozela bilei kobanda 2h00 du matin tii 23h00, ezalaki likama mpamba te masasi ekokaki kozwa biso ntango nyonso.”—Daler, Tajikistan.
“Baboti na ngai bakufaki na etumba. Natikalá mwana-etike mpe moto ya kobɔndisa mpe ya kosalisa ngai azali te.”—Marie, Rwanda.
Bato nyonso oyo touti kotánga bazali sikoyo na kimya atako bitumba ebimiselaki bango mpasi mingi na bomoi. Oyo eleki nyonso, bazali na kondima ete mosika te, bitumba mpe mobulu nyonso ekosila. Nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo esaleli makanisi ya Biblia mpo na komonisa ndenge oyo bitumba mpe mobulu ekosila