Bazali na kimya atako bitumba mpe mobulu
Gary, oyo azalaká soda na kala, alobi: “Liboso nabanda koyekola Biblia, nazalaki koyeba te mpo na nini mobulu, bitumba, mpe injustice etondi na mokili. Kasi sikoyo, nazali na kimya ya makanisi. Nayebi ete mosika te, Yehova akotya kimya na mokili oyo.”
Ezali mpe na bato mosusu oyo bakutaná na likambo yango lokola Gary. Tótala ndenge Biblia esalisaki bango.
BIBLIA ELOBI: “Mpo yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa.”—Nzembo 86:5.
NDENGE YANGO ESALISI NGAI: “Vɛrsɛ yango endimisaka ngai ete Yehova asepelaka kolimbisa. Nayebi ete alingi mpenza kolimbisa ngai na makambo ya mabe nyonso oyo nasalaki na mosala ya soda.”—Wilmar, Colombie.
BIBLIA ELOBI: “Mpo talá nazali kozalisa likoló ya sika mpe mabele ya sika; makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.”—Yisaya 65:17.
NDENGE YANGO ESALISI NGAI: “Nakómá kobɛla maladi ya makanisi (dépression) mpo na makambo oyo nakutaná na yango na mosala ya soda. Kasi vɛrsɛ oyo esalisaka ngai nayeba ete mosika te Yehova akolongola makanisi nyonso ya mabe na bɔɔngɔ na ngai, makanisi oyo esalaka ete nazala na kimya te. Ekozongela ngai lisusu na motó te. Yango ezali mpenza lipamboli ya Nzambe!”—Zafirah, États-Unis.
BIBLIA ELOBI: “Na mikolo na ye, bato ya sembo bakokola lokola matiti ya sika, mpe kimya ekokóma mingi tii sanza ekozala lisusu te.”—Nzembo 72:7.
NDENGE YANGO ESALISI NGAI: “Nakanisaka maloba oyo mbala mingi. Mosika te, nsɔmɔ nyonso ya bitumba ekolongwa na makanisi, mpe bato oyo tolingaka bakobatelama malamu mpenza.”—Oleksandra, Ukraine.
BIBLIA ELOBI: “Bakufi na yo bakozonga na bomoi. . . . Bólamuka mpe bóganga na esengo, bino baoyo bofandi na putulu!”—Yisaya 26:19.
NDENGE YANGO ESALISI NGAI: “Bato mingi ya libota na ngai bakufaki ntango babomaki ba-Tutsi mpo na kosilisa bango nyonso. Kasi vɛrsɛ oyo endimisaka ngai ete nakomona bango lisusu. Nazelaka na motema moko koyoka mingongo na bango ntango bakosekwa!”—Marie, Rwanda.
BIBLIA ELOBI: “Etikali kaka mwa ntango moke, bato mabe bakozala lisusu te . . . Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”—Nzembo 37:10, 11.
NDENGE YANGO ESALISI NGAI: “Atako bitumba esilaki, kasi ba-injustice mpe bato mabe bazali kaka. Vɛrsɛ oyo esalisaka ngai mingi mpenza. Yehova amonaka makambo nyonso mpe ayebi malamu makambo nakutaná na yango. Alaki ete mosika te, bampasi nyonso ekosila mpe tokobosana yango libela.”—Daler, Tajikistan.
Bato nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo bazali kati na bamilio ya Batatoli ya Yehova oyo Biblia esalisá mpo bázala na kimya. Bayekolá ndenge ya kolonga makambo lokola koyina bato mpo na loposo, mpo na ekólo, to koyina moto kaka mpamba. (Baefese 4:31, 32) Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te mpe baboyaka kosala mobulu.—Yoane 18:36.
Batatoli ya Yehova bazwaka mpe lisalisi epai ya bandeko na bango ya mokili mobimba. (Yoane 13:35) Na ndakisa, Oleksandra, oyo tolobelaki liboso, ye ná ndeko na ye ya mwasi bakimaki bitumba na mboka mosusu. Ndeko na ye ya mwasi alobi: “Ntango kaka tokatisaki ndelo ya mboka na biso, Batatoli ya Yehova ya mboka yango bayambaki biso malamu mpenza. Basalisaki biso tómesana kofanda na mboka mopaya.”
Tosɛngi yo oya esika Batatoli ya Yehova basanganaka mpo na kosambela, epai toyekolaka mateya ya Biblia oyo esalisaka biso tóyeba ndenge ya kozala na kimya. Kende na site jw.org mpo omona esika oyo tosambelaka to sɛngá Motatoli ya Yehova moko aya koyekola na yo Biblia na mokanda Sepelá na bomoi libela na libela!