Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Septembre nk. 26-30
  • Yehova asalisaki biso ‘tókola esika oyo balonaki biso’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova asalisaki biso ‘tókola esika oyo balonaki biso’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Masolo mosusu
  • Yehova apamboli ngai koleka ndenge oyo nakokaki kokanisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Yehova ‘asembolaki banzela na ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Yehova azali ekimelo mpe nguya na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Ntango mokumba oyo ozalaki na yango esili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Septembre nk. 26-30
Mats ná Ann-Catrin batɛlɛmi pembeni ya motuka na bango na mboka moko.

LISOLO YA BOMOI

Yehova asalisaki biso ‘tókola esika oyo balonaki biso’

LISOLO YA MATS NÁ ANN-CATRIN KASSHOLM

“BÓKOLA esika oyo baloni bino” ekoki komonana lokola toli oyo ebongi te. Kasi babalani moko ya ekólo Suède, Mats ná Ann-Catrin, ‘balonamaki’ mbala mingi. Ndenge nini, mpe toli yango esalisaki bango ndenge nini?

Mats Kassholm ná Ann-Catrin bakɔtaki eteyelo ya Gileade na 1979 mpe “balonamaki” na Birmanie, na Iran, na Maurice, na Ouganda, na Tanzanie, mpe na Zaïre. Ezalaki na Gileade nde bayokaki toli ya molakisi moko, Jack Redford, oyo esalisaki bango mbala nyonso oyo bazalaki “kolona” bango, “kopikola” bango mpe “kolona” bango lisusu. Bango moko bábɛta lisolo na bango.

Mats, bóyebisa biso ndenge oyo boyebaki solo.

Mats: Tata na ngai azalaki kofanda na Pologne na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe amonaki bokosi ya Lingomba ya Katolike. Kasi, mbala mingi azalaki koloba boye: “Lingomba ya solo ezali na esika moko boye!” Kendekende, namonaki ete azalaki koloba solo. Nasombaki babuku mingi oyo bato basalelá. Moko na yango ezalaki buku moko ya ezipeli ya bule Solo oyo ezali komema na nzela ya bomoi ya seko. Motó ya likambo ya buku yango ebendaki likebi na ngai, mpe natángaki buku yango mobimba kaka na butu ya mokolo oyo nazwaki yango. Ntango ntɔngɔ etanaki, nayebaki ete nazwi solo!

Kobanda na sanza ya 04/1972, natángaki babuku mosusu mingi ya Batatoli ya Yehova mpe nazwaki biyano na mituna na ngai ya Biblia. Namiyokaki lokola moto ya mombongo ya ndakisa ya Yesu, oyo nsima ya komona liyaka ya motuya monene, atɛkaki biloko nyonso oyo azalaki na yango mpo na kosomba liyaka yango. “Natɛkaki” mikano na ngai ya kotánga na iniversite mpo na kokóma monganga—nyonso wana mpo nasomba “liyaka” ya solo oyo namonaki. (Mat. 13:​45, 46) Nazwaki batisimo na mokolo ya 10/12/1972.

Pene na mbula moko kaka, baboti na ngai ná leki na ngai ya mobali mpe bandimaki solo mpe bazwaki batisimo. Na sanza ya 07/1973, nabandaki mosala ya ntango nyonso. Na bandeko basi oyo bazalaki babongisi-nzela ya molende na lisangá na biso, moko na bango na nkombo Ann-Catrin asepelisaki ngai mingi mpe azalaki kolinga Yehova. Tolinganaki mpe tobalanaki na 1975. Tolekisaki mbula minei oyo elandaki na engumba Strömsund, mboka moko kitoko na Suède epai bato mingi bazalaki kondima solo.

Ann-Catrin: Tata na ngai ayekolaki solo mwa moke liboso asilisa kotánga na iniversite na Stockholm. Nazalaki kaka na mbula misato na ntango wana, kasi azalaki komema ngai na makita mpe na mosala ya kosakola. Mama azalaki kosepela bongo te mpe azalaki koluka komonisa ete Batatoli bazali na libunga. Kasi akokaki te, mpe nsukansuka azwaki batisimo. Ntango nazalaki na mbula 13, nazwaki batisimo, mpe na mbula 16 nakómaki mobongisi-nzela. Nsima ya kosala na Umeå, esika mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki mingi, nakómaki mobongisi-nzela monene.

Nsima ya kobalana na Mats, toyokaki esengo ya kosalisa bato ebele báyeba solo. Moko na bango ezalaki Maivor, elenge mwasi moko oyo atikaki masano oyo alingaki kosala bomoi na ye mobimba mpe na nsima akómaki leki mpe moninga na ngai na mosala ya mobongisi-nzela. Bakɔtaki eteyelo ya Gileade na 1984 mpe basalaki lokola bamisionɛrɛ na Équateur.

Na bisika nyonso oyo bosalaki lokola bamisionɛrɛ, ndenge nini bosalelaki toli ya ‘kokola esika oyo baloni bino’?

Mats: ‘Balonaki’ biso mbala ebele. Kasi tozalaki kosala makasi ‘tópika misisa’ na Yesu na ndenge oyo tozalaki kosala nyonso mpo na komekola ye, mingimingi komikitisa na ye. (Kol. 2:​6, 7) Na ndakisa, na esika tómizela ete bandeko oyo tokuti básala makambo lokola biso, biso nde tozalaki koyekola ntina oyo bazalaki kosala makambo boye to boye. Tozalaki kolinga koyeba ndenge na bango ya kokanisa mpe mimeseno na bango. Ntango tozalaki kosala makasi tómekola Yesu, tozalaki komiyoka “lokola nzete oyo elonami pene na mikɛli ya mai” mpo tókola esika nyonso oyo batindi biso.—Nz. 1:​2, 3.

Mats ná Ann-Catrin bamemi valize ná mwa biloko ya kolya.

Tozalaki kosala mibembo mingi mpo na kotala masangá

Ann-Catrin: Mpo nzete ekola esika oyo elonami lisusu, ezalaka na mposa ya pole ya moi. Yehova azalaki ntango nyonso “moi” mpo na biso. (Nz. 84:11) Apesaki biso bandeko ya elimo oyo balendisaki biso mpe balingaki biso mingi. Na ndakisa, na lisangá na biso ya moke na Téhéran, na Iran, tomonaki ete bandeko bazali na boyambi lokola bato oyo Biblia elobeli. Tozalaki na mposa ya kotikala na Iran, kasi na sanza ya 07/1980, mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na ekólo yango mpe bapesaki biso kaka mikolo mibale mpo tólongwa na ekólo yango. Batindaki biso na Zaïre (lelo Congo-Kinshasa) na Afrika.

[Elilingi na lokasa 28]Ndako moko ya moke na mboka moko na Zaïre

Fɔtɔ ya suvenire ntango tozalaki na Zaïre, na 1982

Ntango nayokaki ete batindi biso na Afrika, liboso nalelaki. Makambo oyo nayoká mpo na banyoka mpe bamaladi na Afrika ebangisaki ngai. Kasi baninga mibale ya motema oyo basalaki kuna bambula ebele bayebisaki biso: “Bokómá naino kuna te! Bómeka naino kokende, mpe bokomona—bokosepela na Afrika.” Mpe yango nde esalemaki! Bandeko bazalaka na boboto mpe na bolingo. Kutu, ntango esɛngaki tólongwa na Zaïre nsima ya mbula motoba mpo na epekiseli, namisɛkaki mpo nazalaki kobondela Yehova ete: “Nabondeli yo, salá ete tótikala na Afrika.”

Mapamboli nini bozwi na boumeli ya bambula?

Ann-Catrin afandi pembeni ya Kombi na bango na kiti oyo egumbamaka.

“Shambre na biso” na Tanzanie, na 1988

Mats: Tosali boninga makasi na bamisionɛrɛ oyo bautaki na bikólo mpe mimeseno ndenge na ndenge. Lisusu, na bisika mosusu oyo tosalaki, toyokaki esengo mingi oyo eutaka na koyekola na bato ebele Biblia; tozalaki na bayekoli ata 20 moto na moto! Tobosanaka mpe te bolingo mpe boyambi ya bandeko ya Afrika. Ntango tozalaki kokende kotala masangá na Tanzanie, bandeko mingi bazalaki koyamba biso malamu “ata koleka oyo bakokaki kopesa”; tozalaki kolala na Kombi na biso oyo tozalaki kotya pene ya bandako na bango. (2 Ko. 8:3) Likambo mosusu oyo tolingaki mingi ezali oyo tozalaki kobenga ntango ya masolo. Ezalaki na mpokwa ntango ngai ná Ann-Catrin tozalaki kofanda mpo na kolobela makambo oyo esalemi na mokolo mpe tozalaki kopesa Yehova matɔndi ndenge azalaki elongo na biso.

Ann-Catrin: Likambo ya esengo mingi mpo na ngai ezalaki ya kozala elongo na bandeko ya mikili ndenge na ndenge. Toyekolaki minɔkɔ ebele, na ndakisa Français, Luganda, Persan, ná Swahili, mpe toyekolaki mimeseno ya bamboka ndenge na ndenge. Tokómisaki bato bayekoli, tozwaki baninga ya sika, mpe tosalaki elongo na bango “na bomoko” na mosala ya Yehova.—Sef. 3:9.

Tomonaki mpe biloko ndenge na ndenge ya kokamwa oyo Yehova akelá. Mbala nyonso oyo tondimi mokumba ya sika, tozalaki komona lokola nde tozali kosala mobembo mpe Yehova nde azali kotambwisa biso. Asalisi biso na makambo oyo tokokaki kosala na ndenge na biso moko te.

Bililingi: 1. Mats ná Ann-Catrin bazali koteya mama moko ná bana na ye. 2. Ann-Catrin azali koteya mwasi moko na Tanzanie.

Tozali kosakola na bateritware ndenge na ndenge ya Tanzanie

Mikakatano nini bokutanaki na yango, mpe nini esalisaki bino bóyika mpiko?

Mats: Tozwaki bamaladi oyo ezalaka mingi na Afrika, ata mpe malaria. Mpe na mabaku mosusu, esɛngaki kosala Ann-Catrin lipaso nokinoki. Tozalaki mpe komitungisa mpo na baboti na biso oyo bazalaki kokóma mibange; na yango tozali na botɔndi epai ya bandeko na biso ya libota oyo basalisaki bango ntango biso tozalaki te. Bakokisaki mokumba yango tii na nsuka mpe basalaki yango na motema molai, esengo mpe bolingo. (1 Tim. 5:4) Atako bongo, ekómaki ete tómiyoka mabe, mpo tozalaki komona ete tokokaki kokende mpo na kosalisa baboti na biso mingi, na esika tósalisa bango kaka na mosika.

Ann-Catrin: Na 1983, ntango tozalaki kosala na Zaïre, maladi ya choléra ebɛtaki ngai makasi. Monganga ayebisaki Mats boye: “Bimisá ye na mboka oyo kaka lelo!” Mokolo oyo elandaki, tozwaki mpɛpɔ oyo ememaka biloko, kaka yango nde ezalaki, mpe tokendaki na Suède.

Mats: Tokanisaki ete mosala na biso ya misionɛrɛ esuki wana, mpe tolelaki makasi. Kasi, atako monganga alobaki ete Ann-Catrin akobika te, esalemaki bongo te. Mpe mbula moko na nsima, tozongaki lisusu na Zaïre, mbala oyo na lisangá moko ya moke ya Swahili na Lubumbashi.

Ann-Catrin: Ntango tozalaki na Lubumbashi, nazwaki zemi kasi elongwaki. Atako tozalaki na likanisi ya kobota bana te, kobungisa mwana oyo azalaki na libumu na ngai epesaki ngai mawa mingi mpenza. Kasi, na ntango yango ya mpasi, Yehova apesaki biso likabo oyo tokanisaki te. Tokómaki koyekola Biblia na bato ebele koleka liboso. Mbula mobimba ekokaki te, lisangá na biso ya basakoli 35 ekómaki na basakoli 70, mpe motángo ya bayangani na makita elongwaki na 40 mpe ekómaki 220. Tozalaki na mosala mingi ya kosala na mosala ya kosakola, mpe lipamboli ya Yehova ebɔndisaki biso mingi mpenza. Kasi, mbala mingi tokanisaka mpe tolobelaka mwana na biso. Tozelaka komona ndenge Yehova akobikisa mitema na biso mpo na libela.

Mats: Na eleko moko, Ann-Catrin alɛmbaki makasi mpenza. Bazwaki ngai na maladi ya kanser na mosɔpɔ, mpe esɛngaki básala ngai lipaso moko monene. Lelo oyo, nazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe Ann-Catrin azali kosala oyo akoki.

Toyaki komona ete kaka biso te nde tozalaki na mikakatano. Nsima ya kobomana ya nsɔmɔ na Rwanda na 1994, tokendaki kotala bandeko na bakaa ya bato bakimá mboka. Komona kondima na bango, ezaleli na bango ya koyika mpiko, mpe boyambi na bango oyo ekendá nsango eteyaki biso ete Yehova azali na nguya ya kosunga basaleli na ye ata soki bakutani na mokakatano ya ndenge nini.—Nz. 55:22.

Ann-Catrin: Mokakatano mosusu ezalaki ntango tokendaki na molulu ya bofungoli Betele ya Ouganda na 2007. Nsima ya molulu yango, tozalaki kosala mobembo elongo na bamisionɛrɛ ná bandeko ya Betele soki 25 mpo na kokende na Nairobi, na Kenya. Liboso tókóma na ndelo ya Kenya, motuka moko oyo ezalaki koya na ngámbo mosusu etutaki biso. Sofɛlɛ ná bandeko mitano bakufaki mbala moko, ndeko mwasi moko akufaki na lopitalo na nsima. Tozelaka mokolo oyo tokomona bango lisusu!—Yobo 14:​13-15.

Na nsima, bampota na ngai ebikaki. Kasi ngai ná Mats tozalaki na kati ya baoyo bakómaki konyokwama na makanisi nsima ya aksida wana. Mpo na ngai, kobangabanga ezalaki koya na butu, ezalaki kolamwisa ngai mpe nazalaki koyoka lokola nabɛli motema. Ezalaki kopesa ngai nsɔmɔ. Kasi, kobondela Yehova makasi mpe libɔndisi oyo euti na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo tolingaka mingi esalisaki biso tóyika mpiko. Tozwaki mpe lisalisi ya monganga, mpe esalisaki biso mingi. Sikoyo, kobanga ezalaka lisusu mingi te, mpe tobondelaka Yehova akoba kosalisa biso mpo tóbɔndisa bato oyo bazali mpe kobunda na likambo ya ndenge wana.

Ntango bolobelaki ndenge boyikaki mpiko na makambo ya mpasi, bolobaki ete Yehova amemaki bino lokola “maki ya mobesu.” Yango elimboli nini?

Mats: Maloba yango ezali ya Swahili “Tumebebwa kama mayai mabichi,” to “Bamemaki biso lokola maki ya mobesu.” Ndenge kaka moto asalaka keba soki amemi maki ya mobesu mpo epasuka te, Yehova asalisaki biso na boboto nyonso na mokumba mokomoko oyo tozwaki. Tozalaki na nyonso oyo tosengeli na yango, ata koleka kutu. Lolenge moko oyo tomonaki bolingo mpe lisalisi ya Yehova ezali na nzela ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo bazalaki komitya na esika na biso.

Ann-Catrin: Nalobela ndakisa moko oyo emonisaki ndenge Yehova asalisaki biso na boboto. Mokolo moko babengaki ngai na telefone mpo na koyebisa ngai ete tata na ngai na Suède, akɔti lopitalo mpo abɛli makasi. Mats autaki kobɛla malaria mpe ayokaki malamu. Lokola tozalaki na mbongo te mpo na kosomba tike ya mpɛpɔ, tozwaki ekateli ya kotɛka motuka na biso. Na ntango yango, bato mosusu mibale babengaki biso; moko ezalaki ndeko moko ná mwasi na ye oyo bayokaki nsango na biso mpe balingaki kosombela biso tike. Mosusu ezalaki ndeko mwasi moko ya mobange oyo azalaki kotya mbongo na kɛsi oyo akomaki likoló na yango “Mpo na moto oyo azali na bosɛnga.” Nsima ya miniti moke kaka, Yehova asalisaki biso tózwa batike!—Ebr. 13:6.

Na mbula koleka 50 oyo bosali na mosala ya ntango nyonso, makambo nini boyekoli?

Mats ná Ann-Catrin bazali na esengo lelo oyo.

Esika tozali sikoyo na Birmanie

Ann-Catrin: Toyekoli ete tozalaka na makasi ntango ‘tofandi nyɛɛ mpe totyeli Yehova motema.’ Ntango totyeli Yehova motema, ye moko akómaka kobundela biso. (Yis. 30:15; 2 Nt. 20:​15, 17) Ndenge tomipesi na mosala ya Yehova na mokumba nyonso oyo bapesi biso, tozwi mapamboli koleka oyo tokokaki kozwa na ndenge mosusu nyonso.

Mats: Liteya monene oyo nayekoli ezali ya kotyela Yehova motema na makambo nyonso mpe komona ndenge akosalisa biso. (Nz. 37:5) Azangaka te kokokisa elaka na ye ya kosalisa biso. Tii lelo tomonaka bosolo ya likambo yango na mokumba na biso ya sika na Betele ya Birmanie.

Tozali na elikya ete bilenge oyo balingi komipesa na mosala ya Yehova bakomona mpe bolingo ya sembo oyo Yehova amoniseli biso. Tondimi ete bakomona yango soki batiki Yehova asalisa bango bákola mpenza esika nyonso oyo aloni bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto