Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Octobre lok. 32
  • Batelá programɛ ya kotánga Biblia mokolo na mokolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batelá programɛ ya kotánga Biblia mokolo na mokolo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosalela mikanda oyo batángi kotánga
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Ozwaka matomba na Biblia ya audio?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Nasala nini mpo kotánga Biblia esepelisa ngai mpenza?
    Lamuká!—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Octobre lok. 32

LIKANISI MPO NA KOYEKOLA

Batelá programɛ ya kotánga Biblia mokolo na mokolo

Ozalaka na makambo mingi ya kosala, mpe okómi kobunda mpo na kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo? (Yos. 1:8) Soki bongo, meká kosalela moko ya makanisi oyo elandi:

  • Tyá eloko oyo ekobanda kokundwela yo. Tyá alarme na telefone mpo eyebisa yo otánga Biblia.

  • Tyá Biblia na esika oyo okomona yango. Soki otángaka na Biblia ya papye, tyá yango na esika oyo okomona yango mbala moko mikolo nyonso.—Mib. 11:18.

  • Yokáká audio ya Biblia. Yokáká yango ntango ozali kosala makambo na yo ya mokolo na mokolo. Tara, oyo azali mobongisi-nzela mpe mama ya libota alobi boye: “Koyoka audio ya Biblia ntango nazali kosala misala ya ndako esalisaka ngai nabungisa te momeseno ya kotánga Biblia.”

  • Kotika te. Soki makambo oyo ekanami te ebebisi programɛ na yo, tángá ata mwa bavɛrsɛ liboso olala. Kotánga ata mwa moke bongo mokolo na mokolo, ekosalisa yo mingi.—1 Pe. 2:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto