‘Tóbatela bomoko ya elimo’
Ntoma Paulo alendisaki bakristo ya Efese ete bákoba ‘kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo, básala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.’—Ef. 4:2, 3.
“Bomoko” oyo tozali na yango ezali “ya elimo.” Yango emonisi ete euti na elimo santu, nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala. Kasi, ndenge Paulo amonisaki yango, bomoko na biso esengeli kobatelama. Nani nde asengeli kobatela yango? Mpo na koloba solo, mokristo mokomoko asengeli kosala makasi mpo na “kobatela bomoko ya elimo.”
Tózwa ndakisa: kanisá ete moto moko apesi yo motuka ya sika. Nani nde azali na mokumba ya kobatela yango? Eyano ezali polele. Soki motuka yango ebebi mpo obatelaki yango malamu te, okopesa moto oyo akabelaki yo motuka yango foti? Te.
Ndenge moko mpe, atako bomoko na biso ya bokristo ezali likabo oyo Nzambe apesi biso, mokomoko na biso asengeli kobatela yango. Soki tozali koyokana malamu te na ndeko moko, tosengeli komituna boye: ‘Nazali kosala nyonso mpo na kosilisa matata yango mpe na bongo kobatela bomoko ya elimo?’
‘SALÁ MAKASI MPENZA’ MPO NA KOBATELA BOMOKO
Ndenge Paulo amonisaki yango, na bantango mosusu ekoki kosɛnga tósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo. Ekoki kozala bongo mingimingi soki ndeko moko apesi biso mpasi. Kobatela bomoko esɛngaka ntango nyonso koluka moto yango mpe kolobela likambo yango? Mpenza te. Omituna boye: ‘Kolandela likambo yango ekolendisa kimya to ekobakisa nde mafuta na mɔtɔ?’ Na bantango mosusu, ezalaka malamu kolekisa kaka likambo yango to kolimbisa.—Mas. 19:11; Mrk. 11:25.
Omituna boye: ‘Kolandela likambo yango ekolendisa kimya to ekobakisa nde mafuta na mɔtɔ?’
Ndenge ntoma Paulo akomaki yango, tókoba ‘kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo.’ (Ef. 4:2) Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete maloba yango ekoki mpe kolimbola “bóyamba bango kaka ndenge bazali.” Yango elakisi ete tosengeli kobosana te ete bandeko na biso bakristo bazali bato ya masumu lokola biso. Ya solo, tosalaka makasi mpo na kolata “bomoto ya sika.” (Ef. 4:23, 24) Kasi, moko te kati na biso akoki kosala yango na ndenge ya kokoka. (Rom. 3:23) Soki tondimi likambo yango, ekozala mpasi te tókangelana motema, tólimbisanaka, mpe na ndenge yango ‘tóbatela bomoko ya elimo.’
Soki tosilisi matata ná ndeko moko, ata kaka na motema na biso, tokokoba kozala na “ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami ‘ekanganeli oyo esangisaka’ na Baefese 4:3 ebongolami “bikanganeli” na Bakolose 2:19. Bikanganeli ezalaka misisa ya makasi oyo esangisaka mokuwa moko ná mosusu. Ndenge moko mpe, kimya mpe bolingo elongo na bandeko na biso, esalisaka biso tózala kaka na boyokani makasi ata soki na bantango mosusu tozwani matata.
Na yango, ntango ndeko moko apesi yo mpasi, to atumoli yo, meká kotalela ndeko yango na motema mawa kasi koluka te kotyola ye. (Kol. 3:12) Lokola biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, na ntembe te yo mpe osilá kopesa moto mosusu mpasi. Kobatela likambo yango na makanisi ekosalisa yo osala nyonso mpo na “kobatela bomoko ya elimo.”