AspctStyle/stock.adobe.com
Yesu akosilisa bitumba
Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete alingaka mpenza bato, tii apesaki kutu bomoi na ye mbeka mpo na bango. (Matai 20:28; Yoane 15:13) Mosika te, Yesu akomonisa lisusu ndenge alingaka bato ntango akosalela nguya oyo azali na yango lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe mpo na “kosilisa bitumba na mabele mobimba.”—Nzembo 46:9.
Talá makambo oyo Biblia elobi ete Yesu akosala:
“Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, ná moto mpamba mpe moto nyonso oyo azali na moto ya kosalisa ye te. Akoyokela moto mpamba ná mobola mawa, mpe akobikisa bomoi ya babola. Akobikisa bango na monyoko mpe na mobulu.”—Nzembo 72:12-14.
Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yesu asili kosala mpe oyo akosala mpo na biso? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya koyekola makambo etali “nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe,” elingi koloba, nsango oyo asakolaki. (Luka 4:43) Tángá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?”