alfa27/stock.adobe.com
Yesu akosilisa makambo ya mobulu
Yesu ayebi ndenge bato bayokaka soki bakutani na makambo ya mobulu mpe ya kozanga bosembo. Bakoselaki ye makambo, babɛtaki ye na ndenge oyo eyokani te na mibeko, basambisaki ye kozanga bosembo, bakatelaki ye etumbu oyo ebongi te mpe babomaki ye na ndenge ya nsɔmɔ. Atako asalaki likambo ya mabe te, andimaki “kopesa bomoi na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28; Yoane 15:13) Sikoyo, lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mosika te akotya bosembo na mabele mobimba mpe akosilisa makambo ya mobulu mpo na libela.—Yisaya 42:3.
Biblia emonisi ndenge mokili ekokóma ntango Yesu akosimba makambo na mabɔkɔ:
“Bato mabe bakozala lisusu te; okotala esika oyo bazalaki, mpe bakozala lisusu wana te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”—Nzembo 37:10, 11.
Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yesu asali mpe oyo akosalela biso? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya koyekola makambo etali “nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe,” elingi koloba, nsango oyo asakolaki. (Luka 4:43) Tángá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?”