Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 26
  • Nzambe akosalisa ngai soki nabondeli ye?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe akosalisa ngai soki nabondeli ye?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Yehova ayokaka biso?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Nzambe ayokaka mabondeli na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 26

Nzambe akosalisa ngai soki nabondeli ye?

Eyano ya Biblia

Ɛɛ, Nzambe asalisaka bato oyo basɛngaka ye na motema mobimba makambo oyo eyokani na mokano na ye. Ata soki obondelá naino Nzambe te, bandakisa oyo ezali na Biblia ya bato oyo babondelaki ete: “Nzambe salisá ngai,” ekoki kolendisa yo. Talá bandakisa oyo:

  • “Yawe, Nzambe na ngai, yaka kosalisa ngai; na bolingo na yo oyo esukaka té, bikisa ngai.”​—Nzembo 109:26, Bible na lingala ya lelo oyo.

  • “Nkolo Yawe ya nguya nyonso, bikisa ngai.”​—Nzembo 69:7, Bible na lingala ya lelo oyo.

Ya solo, bato oyo bakomaki makambo wana bazalaki na kondima makasi epai ya Nzambe. Kasi, Nzambe ayokaka bato nyonso oyo bapusanaka epai na ye na makanisi ya malamu, na ndakisa baoyo “motema ebukani” to “elimo etutami.”​—Nzembo 34:18.

Kokanisa te ete Nzambe azali mosika mpe akipaka makambo na yo te. Biblia elobi boye: “Yehova atombwani, mpe atako bongo amonaka moto ya komikitisa; kasi moto ya lolendo, ayebaka ye kaka na mosika.” (Nzembo 138:6) Kutu, mokolo moko Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nsuki nyonso ya motó na bino etángami.” (Matai 10:30) Nzambe ayebi makambo nyonso oyo etali na yo, ata oyo yo moko oyebi te. Bongo ayoka yo te ndenge nini soki obondeli ye asalisa yo na mitungisi oyo ozali na yango!​—1 Petro 5:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto