Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 34
  • Nzambe akoyoka mabondeli na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe akoyoka mabondeli na ngai?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 34

Nzambe akoyoka mabondeli na ngai?

Eyano ya Biblia

Ɛɛ, akoyoka. Ezala Biblia, ezala makambo oyo bato bakutaná na yango emonisi ete Nzambe ayokaka mabondeli. Biblia elobi: “[Nzambe] akokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye, mpe akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe akobikisa bango.” (Nzembo 145:19) Kasi, mpo Nzambe ayoka yo, etali mingimingi kaka yo moko.

Talá makambo oyo ezali na ntina na miso ya Nzambe

  • Esengeli kobondela kaka Nzambe, Yesu te, Maria te, basantu te, baanzelu te, bikeko mpe te. Kaka Yehova Nzambe nde moto ayokaka mabondeli.​—Nzembo 65:2.

  • Libondeli esengeli koyokana na mokano ya Nzambe, to mibeko na ye oyo ezali na Biblia.​—1 Yoane 5:14.

  • Esengeli kobondela na nkombo ya Yesu, mpe na ndenge yango okomonisa ete ondimi bokonzi na ye. Yesu alobaki: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”​—Yoane 14:6.

  • Esengeli kozala na kondima, kosɛnga Nzambe abakisela yo kondima.​—Matai 21:22; Luka 17:5.

  • Esengeli kozala na komikitisa mpe kofungola motema. Biblia elobi: “Yehova atombwani, mpe atako bongo amonaka moto ya komikitisa.”​—Nzembo 138:6.

  • Esengeli kotya mbamba. Yesu alobaki: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino.”​—Luka 11:9.

Makambo oyo ezali na ntina te na miso ya Nzambe

  • Ekólo to loposo na yo. “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

  • Ndenge oyo ozali. Okoki kobondela Nzambe ofandi, ogumbami, ofukami, to otɛlɛmi.​—1 Ntango 17:16; Nehemia 8:6; Danyele 6:10; Marko 11:25.

  • Kobondela na mongongo makasi to na kati ya motema. Nzambe ayokaka ata mabondeli oyo bato mosusu bayoki te.​—Nehemia 2:1-6.

  • Soki mikakatano na yo ezali ya makasi to te. Nzambe azali kosɛnga yo ‘obwakela ye mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’​—1 Petro 5:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto