Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • hf eteni 5 biteni 1-2
  • Ndenge ya kofanda na kimya na bandeko ya libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kofanda na kimya na bandeko ya libota
  • Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 TYÁ BANDEKO YA LIBOTA NA ESIKA NA BANGO
  • 2 BOYÁ MAKAMBO MOSUSU SOKI ESENGELI
  • Zalá sembo epai ya molongani na yo
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Landá toli ya Nzambe mpo ozala na libala ya esengo
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Pesáká molongani na yo kilo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Okoki kozala na libota ya esengo
hf eteni 5 biteni 1-2
Mama bokilo azali kotyola elambeli ya bokilo na ye ya mwasi

ETENI 5

Ndenge ya kofanda na kimya na bandeko ya libota

“Bólata . . . boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.”​—Bakolose 3:12

Ntango mwasi ná mobali babalani, basali libota ya sika. Ata soki okotika te kolinga mpe komemya baboti na yo, molongani na yo akómi moto oyo aleki ntina mpo na yo na mokili mobimba. Ekoki kozala mpasi mpo bandeko mosusu ya libota bándima likambo yango. Kasi, batoli ya Biblia ekoki kosalisa yo oyeba oyo okoki kosala mpo ofanda na kimya na bandeko ya libota, kasi ofandisa mpe makambo na libota na yo ya sika.

1 TYÁ BANDEKO YA LIBOTA NA ESIKA NA BANGO

Mwasi ná mobali bazali kolekisa ntango elongo na baboti na bango

OYO BIBLIA ELOBI: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.” (Baefese 6:2) Ata soki okómi mokóló, osengeli kokumisa mpe komemya baboti na yo. Yebá ete molongani na yo mpe azali na baboti, mpe asengeli kokipe bango. “Bolingo ezali na zuwa te,” yango wana boyokani ya molongani na yo na baboti na ye ebangisa yo ata moke te.​—1 Bakorinti 13:4; Bagalatia 5:26.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Kobimisaka te maloba lokola, “Bandeko na yo bayokisaka ngai kaka nsɔni” to “Mama na bino alingaka ata moke te makambo oyo nasalaka”

  • Meká kotalela makambo ndenge molongani na yo azali kotalela yango

2 BOYÁ MAKAMBO MOSUSU SOKI ESENGELI

OYO BIBLIA ELOBI: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Ntango obali, baboti na yo bakoki komona ete ozali kaka mwana, mpe bakoki kolinga komikɔtisa mingi koleka na makambo ya libala na bino.

Yo ná molongani na yo bosengeli koyokana makambo nini bokotika baboti na bino bákɔtaka te mpe bosengeli koyebisa bango yango na boboto nyonso. Bóyebisa bango polele kasi na limemya. (Masese 15:1) Komikitisa, boboto, mpe motema molai ekosalisa bino bókóma na boyokani malamu na bandeko ya libota mpe bókoba ‘kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo.’​—Baefese 4:2.

Mwasi ná mobali bazali kosolola; mwasi ná mobali bazali kokabela baboti na bango biloko

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Soki omoni ete bandeko ya libota bazali kokɔta mingi na makambo na bino, sololá yango na molongani na yo ntango makambo ezali kimya

  • Bóyokana ndenge oyo bokoki kosala

LUKÁ KOMITYA NA ESIKA NA BANGO

Osengeli koluka koyeba makanisi ya baboti na yo mpe ndenge bazali komiyoka. Balingi te kobebisa libala na bino. Bazali nde kotyela bino likebi. Ekoki kozala mpasi mpo baboti na yo bándima ete yo ná molongani na yo bosali libota na bino moko. Bakoki kutu komiyoka ete basundolami. Kasi, soki ozali kolanda batoli ya Biblia mpe kosolola polele, okokoka kokumisa baboti na yo kozanga ete obebisa libala na yo.

OMITUNA BOYE . . .

  • Mpo na nini ezali mabe te ete baboti ya molongani na ngai bátyela libala na biso likebi?

  • Ndenge nini nakoki kotya molongani na ngai na esika ya liboso, kasi namonisa mpe limemya epai ya baboti na ngai?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto