Bikelakela ekoki mpenza kokokisa bamposa na biso ya elimo?
BISO nyonso tozalaka na bamposa ya elimo mpe bamposa ya mosuni. Yango wana, bato mingi batunaka mituna lokola oyo: Bomoi ezali na ntina nini? Mpo na nini bato bazali konyokwama? Nini ekómelaka biso ntango tokufaka? Na mituna oyo mpe na mituna mosusu oyo ekokani na yango, bato mingi ya mitema sembo balukaka biyano epai ya banganga-nkisi, ntango batunaka bato oyo basololaka na bilimo ete básololisa bango na bilimo ya bakufi. Likambo yango babengi yango bikelakela.
Okoki kokuta bato oyo basalaka bikelakela na bamboka ebele; bayanganaka na masangá na bango mpe na mangomba. Na ndakisa, na Brésil, bato yango soki 4 000 000 balandaka mateya oyo Hyppolyte Léon Denizard Rivail akomaki; ye azalaki molakisi mpe moto ya filozofi ya ekólo France na ekeke ya 19, kasi na makomi na ye asalelaki nkombo ya Allan Kardec. Na 1854, Kardec akómaki kotya likebi na misala ya kokamwa ya bilimo. Na nsima, atunaki mituna epai ya bato oyo basololaka na bilimo, oyo bafandi na bisika ndenge na ndenge mpe akomaki biyano oyo bapesaki ye na buku na ye The Book of Spirits (Buku ya bilimo) oyo ebimaki na mobu 1857. Akomaki mpe babuku mosusu mibale: The Mediums’ Book (Buku ya banganga-nkisi) mpe The Gospel According to Spiritism (Evanzile engebene bilimo).
Soki balobeli bikelakela, makanisi ya bato mingi ekendaka mbala moko na bonganga, bondɔki, maji, to mpe losambo ya Satana. Kasi, baoyo balandaka mateya ya Allan Kardec, balobaka ete bindimeli na bango ezali ndenge mosusu. Mbala mingi, mikanda na bango elobelaka makambo oyo ezali na Biblia, mpe batalelaka Yesu lokola “motambwisi mpe ndakisa mpo na bato nyonso.” Balobaka ete mateya ya Yesu “[nde ezali] komonisa mpenzampenza mibeko ya Nzambe.” Mpo na Allan Kardec mikanda ya bato oyo bamipesi na bikelakela ezali emoniseli ya misato ya mibeko ya Nzambe epai ya bato; mpo na ye, emoniseli ya liboso ezalaki mateya ya Mose mpe ya mibale ezalaki mateya ya Yesu.
Bikelakela ebendaka bato ebele mpo ete elendisaka bolingo ya bazalani mpe misala ya bolingo malamu. Endimeli moko ya bato oyo bamipesi na bikelakela yango oyo: “Soki bolingo ezangi, lobiko ezali te.” Bato mingi oyo bamipesi na bikelakela basalaka misala oyo etali bolamu ya bato ya esika bafandi; na ndakisa, bapesaka mabɔkɔ mpo na kotonga balopitalo, biteyelo, mpe bibongiseli mosusu. Misala wana ezali misala ya malamu. Kasi, tótala naino soki bindimeli ya bato oyo bamipesi na bikelakela ekokani na mateya ya Yesu oyo ezali na kati ya Biblia. Tózwa bandakisa mibale: elikya mpo na bakufi mpe ntina oyo bato bazali konyokwama.
Elikya nini ezali mpo na bakufi?
Bato mingi oyo bamipesi na bikelakela bakanisaka ete soki moto akufi, azongaka lisusu na bomoi mbala na mbala. Mokanda na bango moko elobi boye: “Kozonga na bomoi mbala na mbala ezali liteya kaka moko oyo ezali koyokana malamu na ndenge biso totalelaka bosembo ya Nzambe; kaka yango nde ekoki kolimbola makambo oyo ekoya mpe ekoki kolendisa bilikya na biso.” Bato oyo bamipesi na bikelakela balobaka ete na ntango ya liwa, molimo, to “elimo oyo elataka nzoto mosusu,” ebimaka na nzoto—ndenge mpomboli ebimaka na libenga na yango. Bakanisaka ete na nsima, bilimo yango elataka lisusu nzoto ya bato mpo na kolongola masumu oyo basalaki na bomoi ya liboso. Kasi, bakoki komikundola masumu yango lisusu te. Buku moko (The Gospel According to Spiritism) elobi ete: “Nzambe amonaki ete ezali malamu bábosana masumu oyo basalaki na bomoi ya liboso.”
Allan Kardec akomaki ete: “Soki moto aboyi kondima ete liteya ya kozonga na bomoi mbala na mbala ezali solo, aboyi mpe kondima bosolo ya maloba ya Klisto.” Nzokande, ata mbala moko te Yesu asalelaki maloba “kozonga na bomoi mbala na mbala” mpe ata mbala moko te abimisaki likanisi ya lolenge wana. (Talá lisoló oyo elobi: “Biblia ezali koteya ete moto azongaka na bomoi mbala na mbala?” na lokasa 22.) Kasi, Yesu ateyaki nde ete bakufi bakosekwa. Na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, asekwisaki bato misato—mwana mobali ya mwasi-mokufeli-mobali na mboka Naina, mwana mwasi ya mokóló ya eyanganelo moko, mpe moninga na ye ya motema Lasalo. (Malako 5:22-24, 35-43; Luka 7:11-15; Yoane 11:1-44) Tiká tótalela moko ya makamwisi yango mpo tóyeba nini oyo “lisekwa” elimbolaki mpo na Yesu.
Lisekwa ya Lasalo
Yesu ayokaki ete moninga na ye Lasalo azali kobɛla. Nsima ya mikolo mibale, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Moninga na biso Lasalo asili kolala mpɔngi; kasi nakokende [kolamuisa] ye.” Bayekoli bakangaki ntina ya maloba wana ya Yesu te, na bongo alobaki na bango polele ete: “Lasalo akufi.” Ntango Yesu akómaki na lilita ya Lasalo, mikolo minei esilaki koleka banda ntango Lasalo akufaki. Yesu atindaki bálongola libanga oyo ezalaki kozipa monɔkɔ ya lilita. Na nsima agangaki na mongongo makasi ete: “Lasalo, bimá libándá.” Bongo, likambo moko ya kokamwa esalemaki. “Ye oyo asili kokufa abimi, naino ekangami ye na bilamba na makolo mpe na mabɔkɔ mpe elongi na ye ezingami na litambala. Yesu alobi na bango ete, Bókangola ye mpe tiká ete alongwa.”—Yoane 11:5, 6, 11-14, 43, 44.
Na ntembe te, wana ezalaki te kozonga na bomoi mbala na mbala. Yesu alobaki ete mowei Lasalo azalaki kolala mpɔngi, ayebaki eloko moko te. Ndenge Biblia eyebisi yango, ‘kokanisa na ye esilaki.’ ‘Ayebaki likambo te.’ (Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5) Nsima ya lisekwa na ye, Lasalo azalaki moto ya lolenge mosusu te oyo azwaki elimo mosusu. Azalaki kaka na bomoto oyo azalaki na yango liboso; mbula na ye mpe makambo oyo abombaká na makanisi na ye ezalaki se oyo azalaki na yango liboso ya liwa na ye. Abandelaki bomoi na ye na esika oyo ekatanaki ntango akufaki mpe azongelaki balingami na ye oyo balelaki ye ntango akufaki.—Yoane 12:1, 2.
Na nsima, Lasalo akufaki lisusu. Kasi, mpo na nini asekwisaki ye? Ndenge moko na bato mosusu oyo Yesu asekwisaki, lisekwa ya Lasalo ezali kokómisa makasi elikya na biso na elaka ya Nzambe ete basaleli na Ye ya sembo bakosekwisama na ntango oyo ye moko aponi. Makamwisi wana ya Yesu epesaki kilo mingi na maloba oyo alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, [akozonga na bomoi, NW].”—Yoane 11:25.
Mpo na lisekwa yango oyo ekosalema na mikolo ezali koya, Yesu alobaki ete: “Ntango ezali koya wana baoyo nyonso bazali kati na malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na [ngai] mpe bakobima, baoyo basalaki makambo malamu mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo basalaki makambo mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” (Yoane 5:28, 29, NW) Ndenge esalemaki mpo na Lasalo, bato oyo bakufá bakosekwa. Ekozala te kosangisama ya bilimo oyo ezali na bomoi na banzoto na yango oyo esekwisami, nzoto oyo epɔlaki mpe ntango mosusu esanganá na bikelamo mosusu ya bomoi. Mozalisi ya likoló na mabele, oyo azali na bwanya mpe na nguya oyo ezangi nsuka, azali mpenza na likoki ya kosekwisa bakufi.
Liteya ya lisekwa, ndenge Yesu Klisto ateyaki yango, ezali komonisa mpenza bolingo monene oyo Nzambe azali na yango epai ya moto mokomoko, boye te? Kasi ezali boni mpo na motuna ya mibale oyo totunaki na ebandeli?
Mpo na nini bato bazali konyokwama?
Soki bato bazali konyokwama, mingimingi ezali nde mpo na makambo oyo bato bazangi bwanya mpe bato mabe bazali kosala. Kasi, tokoloba nini mpo na makama oyo euti na bato te? Na ndakisa, mpo na nini makama oyo euti na biloko bizalisami ezali kobima na mokili? Mpo na nini bana mosusu babotamaka na mbeba na nzoto? Mpo na Allan Kardec, makambo motindo wana ezali nde bitumbu. Akomaki boye: “Soki tozali kozwa bitumbu elakisi ete tosalaki mabe. Soki mabe yango esalemaki na bomoi oyo te, boye euti na bomoi oyo moto azalaki na yango kala.” Bateyaka bato oyo bamipesi na bikelakela ete básambela boye: “Nkolo, Yo ozali kaka sembo. Maladi oyo omonaki malamu kotindela ngai nasengeli kozwa yango . . . Nandimi yango lokola mbɔndi mpo na bomoi na ngai ya liboso mpe lokola komekama ya kondima na ngai mpe ya botosi na ngai ya mokano na yo.”—The Gospel According to Spiritism.
Yesu ateyaki likambo ya motindo wana? Te; Yesu ayebaki malamu maloba ya Biblia oyo emonisi ete: “Ntango mpe makambo makanami te ekómelaka bango nyonso.” (Mosakoli 9:11, NW) Ayebaki ete ntango mosusu makambo ya mabe ekómaka. Makambo yango ezali kaka etumbu mpo na masumu te.
Tótalela likambo moko oyo esalemaki ntango Yesu azalaki awa na mabele: “Ntango Yezu azalaki koleka na nzela, amoni moto moko akufa miso banda babota ye. Bayekoli na ye batuni ye: ‘[Labi, NW], mpo na nini moto oyo abotama na miso ya kokufa? Mpo na masumu na ye moko to ya baboti na ye?’ ” Eyano oyo Yesu apesaki eteyaki mpenza: “Ezali te mpo na masumu na ye moko, to ya baboti na ye, kasi abotama na miso ya kokufa mpo mosala ya Nzambe emonana na ye. Nsima ya maloba wana, Yezu abwaki nsoi na mabele mpe asali mwa ndambo ya potopoto; apakoli moto wana yango na miso. Bongo alobi na ye: ‘Kende kosukola elongi na eziba ya [Siloama, NW].’ . . . Moto yango akendeki kosukola elongi, bongo ntango azongi, abandi komona.”—Yoane 9:1-3, 6, 7, Boyokani ya Sika.
Maloba ya Yesu emonisaki ete soki moto wana azalaki komona te banda kobotama na ye, ezalaki fɔti na ye te, ezalaki mpe fɔti ya baboti na ye te. Na bongo, Yesu alobaki te ete moto wana azwaki etumbu mpo na masumu oyo asalaki na bomoi oyo azalaki na yango liboso. Ya solo, Yesu ayebaki ete bato nyonso basangola lisumu. Basangola nde lisumu ya Adama, kasi basangola te masumu oyo bango moko basalaki liboso ete bábotama. Ezali mpo na lisumu ya Adama nde bato nyonso babotamaka na nzoto oyo ezangi kokoka, babɛlaka mpe bakufaka. (Yobo 14:4; Nzembo 51:5; Baloma 5:12; 9:11, NW) Kutu, ezalaki mpo na kobongisa likambo yango nde Yesu atindamaki. Yoane Mobatisi alobaki ete Yesu azalaki “Mwana-na-mpate ya Nzambe, molongoli na masumu ya mokili.”—Yoane 1:29.a
Lisusu, tóyeba ete Yesu alobaki te ete Nzambe alingaki ete moto wana abotama mokufi-miso mpo Yesu aleka wana mokolo moko mpe abikisa ye. Soki ezalaki bongo, elingaki komonana lokola kozala na motema mabe mpenza. Yango mpe elingaki kokumisa Nzambe te. Kasi, likamwisi ya kobikisa mokufi-miso esalisaki na ‘komonisa misala ya Nzambe.’ Ndenge moko na bamaladi mosusu oyo Yesu abikisaki, yango emonisaki bolingo ya solo ya Nzambe mpo na libota ya bato oyo ezali konyokwama, mpe emonisaki ete elaka na ye ya kosilisa bamaladi mpe minyoko nyonso ya bato na ntango oyo Ye moko akolinga, ezali elaka ya kotyela motema.—Yisaya 33:24.
Tozali kobɔndisama mpenza na koyeba ete na esika ya kobimisa monyoko, Tata na biso ya likoló apesaka nde “biloko malamu na bango bakolɔmbaka ye,” boye te? (Matai 7:11) Oyo-Aleki-Likoló akozwa mpenza lokumu ntango miso ya bakufeli miso ekofungwama, ntango matoi ya bimimi ekozipolama, mpe ntango motɛngumi akotambola, akopumbwa, mpe akokima mbangu!—Yisaya 35:5, 6.
Ndenge ya kokokisa bamposa na biso ya elimo
Yesu alobaki ete: “Moto akobika bobele na kwanga te, nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe.” (Matai 4:4) Ya solo, tokokisaka bamposa na biso ya elimo ntango tozali kotánga Biblia, Liloba ya Nzambe mpe ntango tozali kosalela makambo na yango na bomoi na biso. Kokenda epai ya bato oyo basololaka na bilimo ezali mpenza kokokisa bamposa na biso ya elimo te. Kutu, likambo yango ekweisami na mokanda oyo Allan Kardec abengaki yango emoniseli ya liboso ya mobeko ya Nzambe.—Deteronome 18:10-13.
Bato mingi, ezala mpe bato oyo bamipesi na bikelakela, bayebaka ete Nzambe aleki bato nyonso, azali libela na libela, akoká na makambo nyonso, azali na boboto, azali malamu mpe sembo. Kasi Biblia ezali koyebisa makambo mosusu mingi. Ezali komonisa ete azali na nkombo: Yehova, nkombo oyo tosengeli kokumisa yango, ndenge Yesu asalaki. (Matai 6:9; Yoane 17:6) Ezali komonisa ete Nzambe azali moto ya solo, oyo bato bakoki kokómisa ye moninga na bango ya motema. (Baloma 8:38, 39) Ntango tozali kotánga Biblia, tozali komona ete Nzambe atondi na motema mawa mpe ete “asalaki epai na biso [na kolanda] masumu na biso te; apesaki biso libonza lokola ekoki na lofundo na biso te.” (Nzembo 103: 10) Na nzela ya Liloba na ye oyo akomisaki, Nkolo Mokonzi Yehova azali komonisa bolingo na ye, bonene na ye, mpe ete azali na makambo makasi te. Ye nde atambwisaka mpe abatelaka bato ya botosi. Koyeba Yehova mpe mwana na ye Yesu Klisto “[elimboli, NW) bomoi ya seko.”—Yoane 17:3.
Biblia eyebisi biso makambo nyonso oyo tozali na mposa na yango mpo na mokano ya Nzambe, mpe eyebisi biso oyo tosengeli kosala soki tolingi kosepelisa ye. Boyekoli mozindo ya Biblia epesaka biyano ya solo mpe oyo ebongi mpenza na mituna na biso. Biblia mpe ezali kopesa biso litambwisi mpo na koyeba oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, mpe ezali kopesa elikya moko ya makasi. Ezali kondimisa biso ete mosika te, Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na [bato], mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo ya liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Na nzela ya Yesu Klisto, Yehova akolongola bato na lisumu mpe na ezaleli ya kozanga kokoka oyo basangolaki, mpe bato ya botosi bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Na ntango yango, ezala bamposa na bango ya mosuni to ya elimo ekokokisama nyonso.—Nzembo 37:10, 11, 29; Masese 2:21, 22; Matai 5:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki olingi koyeba ndenge lisumu mpe liwa ebandaki, talá mokapo 6 ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda na lokasa 22]
BIBLIA EZALI KOTEYA ETE MOTO AZONGAKA NA BOMOI MBALA NA MBALA?
Ezali na mokapo moko ya Biblia oyo emonisi ete moto azongaka na bomoi mbala na mbala? Tózwa ndakisa ya mwa mikapo oyo bato oyo bandimaka liteya yango basalelaka:
“Zambi basakoli nyonso mpe Mibeko basakolaki kino Yoane . . . [Ye] oyo azali Eliya [oyo asengelaki kozonga, Liloba lya Nzambe].”—Matai 11:13, 14.
Yoane Mobatisi azalaki nde Eliya oyo abotamaki lisusu? Ntango batunaki ye: “Yo Eliya?” Yoane azongisaki polele ete: “Ngai te.” (Yoane 1:21) Nzokande, esakolamaki ete Yoane asengelaki koya liboso ya Masiya, “na [elimo, NW] mpe na nguya ya Eliya.” (Luka 1:17; Malaki 4:5, 6) Na maloba mosusu, Yoane Mobatisi azalaki Eliya mpo asalaki mosala oyo ekokanaki na oyo Eliya asalaki.
“Soko moto akobotama lisusu te, akokoka komona Bokonzi ya Nzambe te. Okamwa te ete nalobi na yo ete, Ekoki na bino kobotama lisusu.”—Yoane 3:3, 7.
Ntoma moko akomaki boye: “Nzambe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto akumisama! [Lokola] ezali mawa na ye mingi, aboti biso lisusu ete tózala na elikya ya bomoi na nzela ya lisekwa ya Yesu Klisto kati na bakufi.” (1 Petelo 1:3, 4; Yoane 1:12, 13) Tomoni polele ete kobotama lisusu oyo Yesu azalaki kolobela ezalaki likambo moko ya elimo oyo esengelaki kosalema wana bayekoli na ye bazali naino na bomoi, kasi ezalaki kolobela te likambo ya kozonga na bomoi mbala na mbala na mikolo ekoya.
“Ntango moto akufi, atikali na bomoi mpo na libela: ntango mikolo na ngai ya bomoi na mabele ekosila, nakozela, nayebi ete nakozonga lisusu.”—Yobo 14:14, ndenge ebongolami na “libongoli moko ya Grɛki”; oyo buku moko (The Gospel According to Spiritism) ezongeli.
Libongoli mosusu (Revised Standard Version) ebongoli mokapo yango boye: “Soki moto akufi, akozala na bomoi lisusu? Mikolo nyonso ya mosala na ngai, nakozela, tii kokangolama na ngai ekoya.” Tángá bavɛrsɛ oyo ezali zingazinga na vɛrsɛ yango. Okomona ete bakufi bazelaka “kokangolama” na bango na lilita. (versɛ 13) Na ntango oyo bazali kozela, bazali na bomoi te. “Moto oyo akufi akei mpenza; mpe ntango moto abimisi mpema, azali lisusu te.”—Yobo 14:10, Septante ya Bagster.
[Elilingi na lokasa 21]
Elikya ya lisekwa emonisaka ndenge Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo ya mokomoko na biso
[Bililingi na lokasa 23]
Nzambe akosilisa minyoko nyonso ya bato