Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp2 mok. 15 nk. 128-135
  • Nakosala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nakosala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Masolo mosusu
  • Bilenge—Bótɛmɛla bopusi ya baninga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Nasala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Kolanda baninga ekoki kozala malamu mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Makambo oyo nakosalela​—Kelasi mpe baninga
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
yp2 mok. 15 nk. 128-135

Mokapo 15

Nakosala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?

“Ntango mosusu, na kelasi baninga batindaka yo omɛla likaya, bangi, to osala pite. Oyebi ete kosala bongo eza bozoba. Kasi, ndenge ya koboya ezalaka te.”​—Eve.

MOTO nyonso alingaka ete baninga bándima ye. Baninga basalelaka mposa yango. Na ndakisa, soki baboti na yo bazali bakristo, oyebi ete makambo lokola kosangisa nzoto liboso ya kobala to molangwa ezali mabe. (Bagalatia 5:19-21) Kasi, baninga na yo mingi batyaka yo mbamba mpo osala makambo oyo bango basalaka. Bilenge yango bakanisaki liboso ya kosala makambo yango mpe na nsima bazwaki ekateli wana? Te. Mingi na bango balandaki kaka makanisi mabe ya baninga. Balingaka baninga bándima bango; yango wana bapesaka nzela ete baninga bápona oyo ezali malamu. Yo mpe osalaka bongo? To ozalaka na mpiko mpo na koboya makambo oyo oyebi ete ezali mabe?

Arona, ndeko ya Moize, andimaki kosala likambo moko mpo batyaki ye mbamba. Ntango Bayisraele bazingaki ye mpe basɛngaki ye asalela bango nzambe, asalaki kaka ndenge bango basɛngaki! (Kobima 32:1-4) Kanisá naino! Mobali yango nde atɛlɛmaki liboso ya Farao mpe ayebisaki ye na mpiko nyonso makambo oyo Nzambe atindaki. (Kobima 7:1, 2, 16) Kasi, ntango Bayisraele mosusu batyaki ye mbamba, Arona andimaki. Na ntembe te, amonaki ete kotɛlɛma liboso ya mokonzi ya Ezipito ezali pɛtɛɛ koleka kotɛmɛla liboso ya bato ya ekólo na ye!

Bongo yo? Oyokaka nsɔni mpo na koboya makambo oyo oyebi ete ezali mabe? Okosepela kotɛmɛla makanisi mabe ya baninga kozanga ete obanga? Okoki koboya makanisi mabe ya baninga! Sekele ezali koyeba liboso makambo oyo baninga bakoki kosɛnga yo mpe koyeba ndenge oyo okosala soki ekómeli yo. Makambo minei oyo elandi ekosalisa yo.

1. Komibongisa liboso. (Masese 22:3) Mbala mingi okoki komona mokakatano na mosika. Na ndakisa, okoki komona liboso na yo bana-kelasi na bino mosusu bazali komɛla likaya. Okanisi nini, bana yango bakoki kopesa yo mpe likaya? Soki oyebi liboso oyo okosala, okomibongisa mpo na koboya to kosilisa mokakatano yango.

2. Kanisá. (Baebre 5:14) Okoki komituna boye: ‘Soki nalandi baninga, ekosukela ngai ndenge nini?’ Ya solo, baninga na yo bakoki kosepela na yo mpo na mwa ntango. Kasi, okomiyoka ndenge nini na nsima ntango okozala ná baboti na yo mpe bakristo mosusu? Okondima ete obebisa boyokani na yo ná Nzambe kaka mpo osepelisa baninga ya kelasi?

3. Zwá ekateli. (Kolimbola Mibeko 30:19) Lelo to lobi, basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kopona kotikala sembo mpo bázwa mapamboli to kotikala sembo te mpo bábuka mbuma mabe. Bato lokola Yozefe, Yobo, mpe Yesu baponaki nzela ya malamu; kasi Kaina, Esau, mpe Yudasi, baponaki nzela ya mabe. Sikoyo nde ngala na yo. Okosala nini?

4. Salá mwa likambo. Mbala mosusu, okoki kokanisa ete yango nde likambo eleki mpasi. Kasi, ezali bongo te! Soki otaleli liboso mbuma oyo okobuka mpe ozwi ekateli, okomona ete komonisa polele ekateli na yo ekozala pɛtɛɛ mpe okozwa mbano. (Masese 15:23) Kobanga te; yango elingi koloba te ete ekosɛnga na yo olimbolela baninga na yo makambo ebeleebele na Biblia. Mwa likanisi ya mokuse, kasi ya polele ekoki kosalisa. To mpe, mpo na komonisa makanisi na yo polele, okoki koloba boye:

“Bókɔtisa ngai na makambo na bino te!”

“Nasalaka makambo wana te!”

“Oh, boz’osala lokola boyebi ngai te?”

Likambo ya ntina ezali kopesa eyano mbala moko mpe na mpiko. Soki osali bongo, okokamwa ndenge baninga na yo bakotika yo mbala moko kimya! Kasi, okosala nini soki basɛki yo? Na ndakisa, soki balobi na yo ete: “Mpo na nini ozalaka bibangabanga boye?” Talelá matumoli yango lokola kaka makanisi mabe ya baninga. Osengeli kosala nini? Okoki kosala makambo soki misato oyo:

● Okoki kondima ete ozali yuma. (“Olobi solo, nabangaka makaya. Nalingi te bapumɔ na ngai ekóma na kanser.” Na nsima, yebisá na mokuse ntina oyo oboyi.)

● Okoki kokima likambo na mayele mpe komonisa ekateli na yo, kozanga ete oswana.

● Okoki kozongisela bango bale. Yebisá ntina oyo oboyi mpe na nsima, salisá moninga na yo akanisa. (“Nakanisaki ozalaka moto ya mayele, nzokande omɛlaka makaya!”)

Soki baninga na yo bazali kaka kotika yo te, longwá wana! Soki ozali kaka wana, bakotika te kotya yo mbamba. Ata soki okei, kobosana te ete: Yo nde olongi bango. Otikeli baninga na yo nzela te bákɔtisa yo na molɔngɔ na bango!

Baninga mosusu bakoki kotumola yo mpe bakoki koloba na yo ete okanisaka te bomoi na yo ya lobi. Nzokande ezali bongo te! Kutu, Yehova alingi omindimisa yo moko ete kosala mokano na ye nde nzela eleki malamu. (Baroma 12:2) Mpo na nini okotika nzela ete baninga bákómisa yo lokola eloko na bango ya lisano! (Baroma 6:16) Kangamá na oyo oyebi ete ezali malamu!

Mpo na koloba solo, motungisi ya baninga ekoki kozala kaka. Kasi, okoki koyeba nzela nini olingi kolanda, okoki komonisa bango makanisi na yo, mpe kokangama na ekateli na yo. Nsukansuka, yo nde osengeli kopona!​—Yosua 24:15.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 9, NA VOLIMI 1

NA MOKAPO OYO ELANDI

Kozala na bomoi ya lolenge mibale. Ekozala mpenza malamu soki baboti na yo bayebi yango?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.”​—Masese 13:20.

TOLI

Mpo okóma mpenza na mpiko, tángáká masolo ya bomoi ya basaleli ya Yehova ya ntango na biso oyo bakangamaki na makambo ya malamu.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Mbula moko nsima ya kosilisa kelasi, okokutana lisusu te na bana-kelasi mingi oyo botángaki na bango. Mingi kutu bakoyeba lisusu ata nkombo na yo te. Kasi, libota na yo, mpe na koleka Yehova Nzambe, bakobanda ntango nyonso koluka bolamu na yo.​—Nzembo 37:23-25.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nalanda te makanisi mabe ya baninga, nako ․․․․․

Soki baninga na ngai batye ngai mbamba mpo nasala likambo ya mabe, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Ntango nini, makambo minei oyo mokapo oyo elobeli ekoki kosalisa yo?

● Nini ekoki kosalema soki olandi makanisi mabe ya baninga na yo?

● Makambo nini ekoki kosalisa yo olanda te makanisi mabe ya baninga?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 131]

“Bilenge mingi bayebi ete nazali Motatoli, mpe bapesaka ngai limemya. Soki balingi kobɛta masolo ya salite, balobaka na ngai: ‘Michaël, tolingi tóbɛta masolo na biso, soki olingi kokende, kende na yo.’”​—Michaël

[Etanda na lokasa 132, 133]

Etanda ya mituna

Ndenge ya komibongisa liboso

Ndakisa

1 Komibongisa liboso

Mokakatano ezali nini? Komɛla likaya.

Esika nini nakoki kokutana na mokakatano yango? Na esika ya kolata bilamba.

2 Kanisá

Ekosuka ndenge nini soki nalandi bango?

Nakoyokisa Yehova ná baboti na ngai mpasi. Lisosoli na ngai ekotungisama. Ekokóma mpasi mpo naboya mbala ya nsima.

Nini ekosalema soki nakangami na ekateli na ngai?

Bakoki kosɛka ngai to kobamba ngai bankombo nyonso. Bana mosusu ya kelasi bakoki kobanda kokima ngai. Kasi, nakosepelisa Yehova, mpe nakobanga lisusu te.

3 Zwá ekateli

Soki nalandi bango, ekozala mpo

Namibongisaki malamu te mpo na kotɛmɛla bango. Nalukaki kondimama na baninga, na esika ete naluka kondimama na Yehova.

Nakoboya mpo

Nayebi ete komɛla likaya esepelisaka Yehova te mpe ebebisaka nzoto.

4 Salá mwa likambo

Nako

boya mpe nakolongwa wana.

Matumoli ya baninga

Soki moninga alobi: “Yo, zwá likaya oyo. Oz’obanga?”

Mpo na koboya makanisi mabe ya baninga, nako

Kondima

“Olobi solo, nabangaka makaya. Nalingi te bapumɔ na ngai ekóma na kanser.”

Kokima likambo na mayele

“Kobebisa likaya na yo mpo na ngai te.”

Kozongisela bango bale

“Ngai te. Nakanisaki ozalaka moto ya mayele, nzokande omɛlaka makaya!”

LIYEBISI: Soki baninga bazali kaka kotya yo mbamba, longwá wana mbala moko. Soki ozali kaka wana, bakokoba kaka kotungisa yo. Sikoyo, komá biyano na yo na bisika oyo etikali mpamba na lokasa oyo elandi.

Ndenge ya komibongisa liboso

Salá fotokopi ya lokasa oyo!

1 Komibongisa liboso

Mokakatano ezali nini? ․․․․․

Esika nini nakoki kokutana na mokakatano yango? ․․․․․

2 Kanisá

Ekosuka ndenge nini soki nalandi bango?

․․․․․

Nini ekosalema soki nakangami na ekateli na ngai?

․․․․․

3 Zwá ekateli

Soki nalandi bango, ekozala mpo . . .

․․․․․

Nakoboya mpo . . .

․․․․․

4 Salá mwa likambo

․․․․․

Nako . . .

․․․․․

Matumoli ya baninga

Soki moninga alobi: ․․․․․

Mpo na koboya makanisi mabe ya baninga, nako

Kondima

․․․․․

Kokima likambo na mayele

․․․․․

Kozongisela bango bale

․․․․․

Mekáká liboso ya baboti na yo to moninga moko ya mokóló ndenge okoloba.

[Elilingi na lokasa 135]

Soki ondimi kosala makambo mabe ya baninga na yo, okokóma lokola eloko na bango ya lisano

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto