Bisakweli ya Biblia elobeli ekólo Yisraele ya lelo?
LELO oyo, bato mingi na mokili bazali kobanga makambo oyo ezali kosalema na Moyen-Orient. Kobwakama ya babɔmbi, bato oyo bazali na mindoki, mpe babɔmbi oyo bateroriste bazali kobwaka ezali makambo oyo ezali kosalema mingi. Longola yango, kobanga ete bibundeli ya nikleere ekoki kosalelama. Tozali kokamwa te ndenge bato bipai nyonso bazali kobanga!
Bato ya mokili babangaki mpe mpo na makambo oyo esalemaki na Moyen-Orient na 1948. Na ntango wana, eleki sikoyo mbula 62, mandat ya Angleterre na esika oyo ezalaki kobengama Palestine etikalaki moke esila, mpe emonanaki ete etumba ekobima. Mbula moko liboso, ONU epesaki ndingisa básala Ekólo moko ya Bayuda oyo esengelaki komiyangela yango moko na eteni moko ya bateritware oyo ezalaki na mabɔkɔ ya bato ya Angleterre. Bikólo ya Baarabe oyo ezalaki zingazinga balapaki ndai ete bakosala nyonso mpo likambo yango esalema te. Lisangani moko ya bikólo ya Baarabe (Ligue arabe) ekebisaki boye: “Kokabola teritware yango ekobimisa eloko mosusu te kaka etumba mpe makila.”
Ezalaki mokolo ya Mitano na nsima ya midi, na mokolo ya 14 Mai 1948 na 16:00. Etikalaki kaka bangonga moke mpo mandat ya Angleterre esila. Na esika babombaka biloko ya kala na Tel Aviv, etuluku moko ya bato 350 bayaki, babengisaki bango na nkuku mpo na liyebisi moko oyo bazalaki kozela na motema likoló—nsango ya lipanda ya ekólo Yisraele. Batyaki bato oyo basengelaki kokɛngɛla mpo banguna bábimisa mobulu te na molulu yango.
David Ben-Gurion, 14 Mai 1948
David Ben-Gurion, moto oyo akambaki likita oyo esalemaki mpo na ekólo Yisraele, atángaki maloba oyo ezalaki na mokanda moko (The Declaration of the Establishment of the State of Israel). Mokanda yango ezalaki na maloba oyo: “Biso basangani ya likita, bamonisi ya Bayuda ya Eretz-Israel . . . na nzela ya lotomo na biso oyo eyebani uta kala mpe na kolanda ekateli oyo likita monene ya bikólo ya ONU ezwaki, toyebisi ete ekólo ya Bayuda na Eretz-Israel, ekómi ekólo Yisraele.”
Ekokisaki nde bisakweli ya Biblia?
Bato mosusu ya Lingomba ya Protesta bandimaka ete na ndenge yango, ekólo Yisraele ekokisaki esakweli ya Biblia. Na ndakisa, na buku moko (Jerusalem Countdown), John Hagee, mokonzi moko ya lingomba alobi boye: “Likambo wana ya monene ekomamaki na nzela ya mosakoli Yisaya, alobaki ete: ‘Ekólo ekobotama na mokolo moko.’ (Talá Yisaya 66:8) . . . Ezalaki kokokisama moko monene ya esakweli na ekeke ya ntuku mibale. Ezalaki elembo ya solosolo mpo na bato nyonso ete Nzambe ya Israel azali na bomoi.”
Maloba yango ezali solo? Yisaya 66:8 esakolaki kotyama ya ekólo Yisraele ya lelo? Likambo oyo esalemaki na mokolo ya 14 Mai 1948 ezalaki “likambo monene koleka na kokokisama ya bisakweli ya Biblia na ekeke ya ntuku mibale?” Soki ekólo Yisraele ezali kaka ekólo oyo Nzambe aponá, mpe soki azali kosalela yango mpo na kokokisa bisakweli ya Biblia, na ntembe te bato nyonso oyo bayekolaka Biblia na bisika nyonso basengelaki kotyela likambo yango likebi.
Esakweli ya Yisaya elobi boye: “Nani ayoká likambo ya boye? Nani amoná makambo ya boye? Mokili ekobotama na mpasi ya kobota nde na mokolo moko? To ekólo ekobotama nde na mbala moko? Mpo Siona akómaki na mpasi ya kobota mpe lisusu aboti bana na ye.” (Yisaya 66:8) Vɛrsɛ yango ezalaki kolobela polele kobotama ya mbalakaka ya ekólo mobimba, lokola nde na mokolo moko. Kasi, nani asengelaki kosala ete ekólo yango ebotama? Vɛrsɛ oyo elandi esalisi biso tóyeba eyano: “Yehova alobi: ‘Bongo ngai, nakopasola mpe nakobotisa te? To nazali kobotisa mpe nazali mpenza kokanga libumu?’ Nzambe na yo alobi bongo.” Yehova Nzambe amonisaki yango polele ete ye nde akosala ete ekólo yango ebotama na mbalakaka.
Yisraele ya lelo oyo eyangelami na demokrasi, elobaka kutu te ete etyelaka Nzambe ya Biblia motema. Na 1948, bato ya ekólo Yisraele, bandimaki Yehova Nzambe lokola ye oyo asalaki ete ekólo na bango ezwa lipanda? Bandimaki te. Ata kutu nkombo ya Nzambe to liloba “Nzambe” ezalaki ata esika moko te na mokanda oyo esakolaki lipanda ya ekólo na bango. Buku moko, (Great Moments in Jewish History) elobi boye mpo na mokanda yango: “Ata na ngonga ya 13:00, ntango bato bayanganaki, bazalaki koyokana te mpo na maloba oyo basengelaki koloba mpo na kosakola lipanda. . . . Bayuda oyo bazalaki kotala, balingaki bálobela ‘Nzambe ya Israel.’ Bato oyo balingaka makambo ya Nzambe te, baboyaki. Mpo na kokata likambo yango, Ben-Gurion azwaki ekateli ya kosalela liloba ‘Libanga’ na esika ya liloba ‘Nzambe.’”
Ekólo Yisraele ya lelo oyo, elobaka ete soki ezwaki lipanda ezali mpo na ekateli ya ONU mpe oyo babengaka lotomo na bango ya bonkɔkɔ ya Bayuda. Ebongi kokanisa ete Nzambe ya Biblia akoki kokokisa likambo ya kokamwa na ekeke ya 20 mpo na bato oyo bazali koboya kotyela ye motema?
Maloba yango ekokani na nini?
Makambo oyo esalemaki na Yisraele ya lelo ekeseni mpenza na oyo esalemaki na Yisraele na mobu 537 liboso ya ntango na biso. Na ntango wana, ekólo Yisraele ‘ebotamaki lisusu’ lokola nde na mokolo moko nsima ya kobebisama na bato ya Babilone mpe kotikala mpamba na boumeli ya mbula 70. Na ntango yango, Yisaya 66:8 ekokisamaki mpenza ntango Siruse Monene, mokonzi ya Perse oyo azwaki Babilone apesaki Bayuda ndingisa ya kozonga na mokili na bango.—Ezera 1:2.
Siruse, mokonzi ya Perse andimaki ete lobɔkɔ ya Yehova etambwisaki makambo na mobu 537 liboso ya ntango na biso, mpe baoyo bazongaki na Yerusaleme basalaki yango na mokano ya kozongisa losambo ya Yehova Nzambe mpe kotonga lisusu tempelo na ye. Ekólo Yisraele ya lelo elobeli ata likambo moko te ya ndenge wana.
Ezalaka kaka ekólo oyo Nzambe aponaki?
Na mobu 33 ya ntango na biso, ekólo Yisraele ya kala ebungisaki lotomo na yango ya kozala libota oyo Nzambe aponaki, na ndenge baboyaki Masiya, Mwana ya Yehova. Masiya ye moko alobelaki yango boye: “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga . . . Talá! basundoleli bino ndako na bino.” (Matai 23:37, 38) Maloba ya Yesu ekokisamaki na mobu 70 ya ntango na biso, ntango basoda ya Roma babebisaki Yerusaleme na tempelo na yango mpe mosala ya bonganga-nzambe. Kasi, mokano ya Nzambe ya kozala na ‘eloko na ye moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso, . . . bokonzi moko ya banganga-nzambe mpe ekólo moko mosantu’ esukaki ndenge nini?—Kobima 19:5, 6.
Ntoma Petro oyo abotamaki Moyuda, ayanolaki motuna yango na mokanda oyo akomelaki bakristo—bato ya bikólo mosusu mpe Bayuda. Akomaki boye: “Bozali ‘libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza,’ . . . Mpo liboso bozalaki bato ya Nzambe te, kasi sikoyo bozali bato na Ye; bozalaki bato oyo bayokelaki mawa te, kasi sikoyo bozali bato oyo bayokeli mawa.”—1 Petro 2:7-10.
Na yango, bakristo oyo baponamaki na nzela ya elimo santu bazali bato ya ekólo ya Nzambe, mpo na kozala moto ya ekólo yango, esɛngi te kobotama to kozala moto ya mboka moko boye. Ntoma Paulo alobelaki likambo yango boye: “Kokatama ngenga ezali na ntina te ndenge moko mpe kokatama ngenga te, kasi kozala ekelamu ya sika nde ezali na ntina. Bato nyonso oyo bakolanda mpenza mitindo oyo, kimya mpe motema mawa ezala na bango, ɛɛ na Yisraele ya Nzambe.”—Bagalatia 6:15, 16.
Mpo na kozala moto ya ekólo Yisraele ya lelo esɛngaka kobotama to koluka kokóma Moyuda, kasi kozala bato ya ekólo “Yisraele ya Nzambe” ndenge Biblia ebengi yango epesami kaka na baoyo bazali na “botosi mpe oyo bamwangisami makila ya Yesu Kristo.” (1 Petro 1:1, 2) Mpo na bato ya Yisraele ya Nzambe, to Bayuda na elimo, Paulo akomaki boye: “Moyuda ezali te moto oyo azali bongo na libándá, ndenge moko mpe kokatama ngenga ezali te oyo ezali komonana na libándá na nzoto. Kasi Moyuda ezali nde moto oyo azali bongo na kati, mpe kokatama ngenga na ye ezali oyo ya motema na elimo, kasi te na mibeko oyo ekomami. Lokumu ya moto wana euti na bato te, kasi na Nzambe.”—Baroma 2:28, 29.
Vɛrsɛ yango esalisi biso tóyeba maloba oyo Paulo alobaki mpo na matata oyo ebimaki. Na mokanda na ye epai ya Baroma Paulo amonisaki ndenge oyo Bayuda oyo baboyaki kondima bazalaki lokola bitape ya nzete ya olive ya elilingi oyo bakataki yango mpo “bitape” ya “zamba,” to bato ya bikólo mosusu bákoka kobakama na esika na yango. (Baroma 11:17-21) Mpo na kosukisa ndakisa yango, alobaki boye: “Motema ya bato mosusu ya Yisraele ekómi makasi tii motángo mobimba ya bato ya bikólo ekokɔta, mpe na ndenge yango Yisraele mobimba ekobika.” (Baroma 11:25, 26) Paulo azalaki nde kolobela kobongwana ya mbalakaka ya ebele ya Bayuda mpo na kokóma bakristo? Emonani ete kobongwana ya ndenge wana esalemi te.
Ndakisa ya Paulo ya nzete ya Olive elimboli nini?
Na maloba “Yisraele mobimba,” Paulo alingaki koloba bato nyonso ya Yisraele ya Nzambe—Bakristo oyo baponamaki na elimo santu. Azalaki koloba ete lokola Bayuda baboyaki kondima Masiya, yango esengelaki te kobebisa mokano ya Nzambe ya kozala na ‘nzete ya olive’ ya elimo oyo etondi na bitape oyo ezali kobota mbuma. Yango eyokani na ndakisa ya nzete ya vinyo oyo Yesu alobaki ete ezali elilingi na ye, mpe amonisaki ete bitape na yango oyo ezali kobota mbuma te ekokatama. Yesu alobaki boye: “Nazali nzete ya vinyo ya solosolo, mpe Tata na ngai azali mosali-bilanga. Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te, alongolaka yango, mpe nyonso oyo ebotaka mbuma, apɛtolaka yango, mpo ebota mbuma mingi lisusu.”—Yoane 15:1, 2.
Atako kotyama ya ekólo Yisraele ya lelo esakolamaki te na Biblia, oyo ya Yisraele ya Nzambe esakolamaki! Soki oyebi mpe ozali koyangana na ekólo yango ya Nzambe lelo, okozwa mapamboli ya seko.—Ebandeli 22:15-18; Bagalatia 3:8, 9.