Armagedone ezali mpenza nini?
‘Bademo . . . bazali kokende epai ya bakonzi ya mabele mobimba . . . , mpe bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre ete Har–Magedone.’—EMONISELI 16:14, 16.
ARMAGEDONE, oyo mbala mosusu ebengamaka “Har-Magedone” ezali nkombo ya esika. Kasi, emonani ete awa na mabele ezali ata na esika moko te oyo ebengami na nkombo yango.
Kasi liloba “Armagedone” elimboli mpenza nini? Mpo na nini mbala mingi basalelaka liloba yango mpo na kolobela likambo, na ndakisa etumba?
Bayanganisaki bango na esika oyo babengi Armagedone
Liloba ya Ebre Har-Magedone elimbolaka “Ngomba ya Megido.” Atako ezali na ngomba moko te oyo ezalaki na nkombo Megido, kasi ezali na esika moko oyo ebengami Megido. Esika yango ezali na nɔrdi-wɛsti ya mboka oyo bato ya Yisraele ya kala bazalaki kofanda, epai banzela mibale ya minene ekutaná. Bato bazalaki kobunda bitumba mingi ya minene na esika yango. Yango wana, soki batángi Megido, bato bamonaka kaka bitumba.a
Kasi, ndimbola mpenza ya Megido, etali te bitumba nini esalemaki na esika yango, kasi mpo na nini bitumba yango esalemaki. Megido ezalaki eteni ya mabele ya Mokili ya Ndaka oyo Yehova Nzambe apesaki Bayisraele. (Kobima 33:1; Yosua 12:7, 21) Alapelaki bango ndai ete akobundela bango soki banguna babundisi bango, mpe asalaki yango. (Kolimbola Mibeko 6:18, 19) Na ndakisa, ezalaki na Megido nde Yehova abundelaki Bayisraele na ndenge ya likamwisi ntango basoda ya Yabine mokonzi ya Kanana mpe Sisera mokonzi ya basoda na ye babundisaki bango.—Basambisi 4:14-16.
Yango wana, liloba “Har-Magedone,” to “Armagedone” ezali na ndimbola moko monene. Ezali kopesa likanisi ya etumba moko boye, oyo banguya mibale ya makasi ezali kotutana mitó.
Esakweli oyo ezali na Emoniseli elobeli ntango oyo, mosika te, Satana ná bademo na ye bakotinda baguvɛrnema ya mokili eyanganisa basoda na yango, mpe na ndenge yango, bábundisa libota ya Nzambe mpe losambo na bango. Likambo yango ekosuka na kobomama ya bamilio ya bato ntango Nzambe akolonga banguna na ye.—Emoniseli 19:11-18.
Mpo na nini Nzambe, oyo Biblia ebengi Nzambe ‘ya motema mawa, oyo ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto,’ akoboma ebele ya bato ndenge wana? (Nehemia 9:17) Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe akosala bongo, tosengeli koyanola na mituna oyo misato: (1) Nani akobandisa etumba yango? (2) Mpo na nini Nzambe akokɔta na etumba yango? (3) Etumba yango ekomema mapamboli nini mpo na mabele mpe bato oyo bafandi wana?
1. NANI AKOBANDISA ETUMBA YANGO?
Nzambe moto akobandisa etumba ya Armagedone te. Akobundela nde bato na ye ntango banguna na bango bakoluka kolimwisa bango. Banguna oyo bakobandisa etumba yango ezali “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi,” elingi koloba bakonzi ya mokili oyo. Mpo na nini babengi yango etumba? Mpamba te Satana, akosalela baguvɛrnema ya mokili ná basoda na yango mpo bábundisa bato oyo bazali kosambela Yehova Nzambe.—Emoniseli 16:13, 14; 19:17, 18.
Na kotalela ndenge bazali kolobela mingi likambo etali bonsomi ya koloba mpe ya losambo na bikólo mosusu lelo oyo, ekoki kozala mpasi kokanisa ete baguvɛrnema ekoki kopekisa to kokanga lingomba moko boye. Nzokande, makambo ya ndenge wana esalemaki na boumeli ya siɛklɛ ya 20 mpe ezali kosalema lelo oyo.b Atako bongo, ezali na makambo mibale ya minene oyo ekesenisi kopekisama ya losambo oyo esalemaki mpe oyo ezali kosalema sikoyo, ná oyo ekomema na Armagedone. Ya liboso, bakopekisa losambo ya solo na mokili mobimba. Ya mibale, ndenge oyo Yehova akobundela basaleli na ye ekoleka mosika mbala nyonso mosusu oyo abundelaki bato na ye na ntango ya kala. (Yirimia 25:32, 33) Biblia ebengi etumba yango “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”
2. MPO NA NINI NZAMBE AKOKƆTA NA ETUMBA YANGO?
Yehova ateyaka bato oyo basambelaka ye bázala bato ya kimya mpe bálinga banguna na bango. (Mika 4:1-3; Matai 5:43, 44; 26:52) Yango wana, bakosimba mindoki te mpo na kobunda ntango banguna bakobundisa bango. Soki Nzambe asali eloko te mpo na kobikisa bato na ye, bakosila nyɛɛ. Soki esalemi bongo, nkombo ya Yehova Nzambe, to lokumu na ye, ekobeba. Soki banguna balongi kosilisa basaleli na ye, ekomonana lokola ete Yehova azangi bolingo, azangi bosembo, to akoki kosalisa te. Likambo ya ndenge wana ekoki kosalema te!—Nzembo 37:28, 29.
Nzambe alingaka te ete bato bákufa, yango wana azali kokebisa bango polele mpo na likambo oyo akosala. (2 Petro 3:9) Na nzela ya masolo oyo ezali na Biblia, azali kokundwela bato nyonso ete, na ntango ya kala, ntango banguna babundisaki basaleli na ye, akɔtelaki bango. (2 Bakonzi 19:35) Biblia emonisi mpe ete na mikolo ezali koya, ntango Satana ná bato oyo azali kosalela bakobundisa basaleli ya Nzambe, Yehova akosalela lisusu nguya na ye mpo na kokɔtela bato na ye. Kutu, banda kala Liloba ya Nzambe esakolaki ete Yehova akoboma bato mabe. (Masese 2:21, 22; 2 Batesaloniki 1:6-9) Na ntango yango, banguna na ye bakotya ntembe ata moke te ete bazali nde kobundisa Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ye moko.—Ezekiele 38:21-23.
3. ETUMBA YANGO EKOMEMA MAPAMBOLI NINI?
Nsima ya etumba ya Armagedone, bamilio ya bato bakobika. Kutu, yango ekozala ebandeli ya eleko moko ya kimya awa na mabele.—Emoniseli 21:3, 4.
Mokanda ya Emoniseli elobeli “ebele mpenza ya bato” oyo motángo na bango eyebani te, oyo bakobika na etumba yango. (Emoniseli 7:9, 14) Na litambwisi ya Nzambe, bato yango bakobongisa mabele mpo ezonga Paradiso ndenge Yehova akanaki na ebandeli.
Toyebi ntango oyo bakobundisa basaleli ya Nzambe?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali mbala ya liboso te bábenga etumba moko na nkombo ya esika oyo yango esalemaki. Na ndakisa, lelo oyo, soki kaka batángi nkombo ya Hiroshima, engumba moko ya Japon oyo babwakelaki yango bɔmbi atomike, mbala moko bato bayokaka nsɔmɔ ya etumba ya nikleere.
b Ndenge oyo basoda ya Nazi babomaki ebele ya Bayuda ezali kaka ndakisa moko oyo emonisi ndenge guvɛrnema moko elingaki kosilisa bato ya ekólo moko ná lingomba na bango. Ntango Union soviétique ezalaki koyangela, bapekisaki mpe mangomba na ekólo yango. Talá lisolo “Bato ya kimya balongisi lokumu na bango,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2011, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 6]
Na ntango ya kala, Yehova abundelaki bato na ye
[Elilingi na lokasa 7]
Yehova akobundela lisusu bato na ye na etumba ya Armagedone