Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/6 nk. 27-29
  • “Ekoki kosalema te!”—Yango elimboli nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ekoki kosalema te!”—Yango elimboli nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema
  • “Ondimi yango?”
  • Bomoi ya seko awa na mabele​—Ekoki kosalema te?
  • “Nzambe akoki kobuka lokutá te”
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • “Nzambe akoki kosala nyonso”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi na elaka ya Yehova ya mokili ya sika?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Makamwisi ekoki mpenza kosalema?—Ntembe misato bato babimisaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/6 nk. 27-29

“Ekoki kosalema te!”​—Yango elimboli nini?

MASUWA oyo babengi Titanic ekɔtaki na mai mpo na mbala ya liboso na 1912; ezalaki masuwa oyo elekaki monene mpe kitoko na bamasuwa nyonso oyo ezalaki kotambola na mbu na ntango wana. Lokola basalaki masuwa yango na ndenge ya mayele mpenza, bakanisaki ete “ekoki kozinda te.” Nzokande, likambo oyo esalemaki etiká nsango. Kaka na mobembo na yango ya liboso, etutaki libanga ya monene ya glasi na nɔrdi ya Mbu ya Atlantique mpe ezindaki, bato soki 1 500 na kati ya bato oyo bazalaki na masuwa bakufaki. Masuwa oyo balobaki ete ekoki kozinda te, nsima ya mwa bangonga moke, ezindaki mpenza na kati ya mbu.

Maloba “ekoki kosalema te” ekoki kolimbola makambo mingi. Tokoki koloba ete likambo boye ekoki kosalema te ntango tozali komona ete tozali na makoki te ya kolonga yango, kosala yango, to kokanga ntina na yango. Makambo mingi oyo ezali kosalema lelo na mayele ya tekinoloji kala ezalaki komonana lokola makambo oyo ekoki kosalema te, mpo na ntango wana, bato bazalaki na makoki te ya kosala yango to ya koyeba ete mokolo mosusu bakoki kosala yango. Na ndakisa, lelo oyo bakómá kotinda bato na sanza, kotinda bamasini na planɛti Mars mpe kolandela yango awa na mabele, koyeba baselile nyonso ya nzoto ya moto, koyeba makambo oyo ezali kosalema na engumba oyo tofandi to na mokili mobimba; ezali makambo oyo ezalaki komonana ete ekoki kosalema te na mbula 50 oyo eleki. Ronald Reagan, prezida ya kala ya États-Unis, alimbolaki likambo yango na mokuse na diskur moko oyo asalaki liboso ya bato minene ya siansi; alobaki boye: “Mayele na bino ya tekinoloji nde esali ete makambo oyo kala ezalaki komonana ete ekoki kosalema te, lelo oyo ekómá kosalema.”

Na kotalela makambo mingi ya kokamwa oyo ekómi kosalema, profesɛrɛ John Brobeck alobaki boye: “Moto moko te ya siansi akoki lisusu koloba mpenza ete likambo boye to boye ekoki kosalema te. Akoki kaka koloba ete mbala mosusu ekoki kosalema te. Kasi, akoki nde koloba ete ezali mpasi kolimbola likambo yango na kotalela boyebi oyo tozali na yango sikoyo.” Profesɛrɛ yango alobi lisusu ete soki tomoni ete tokoki kosala likambo moko te, “tokoki koloba ete ezali na nguya moko oyo biso toyebi te na mayele ya siansi ya bioloji mpe ya fizioloji. Na Makomami, nguya yango ezali nde nguya ya Nzambe.”

Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema

Kutu, bambula mingi liboso ete profesɛrɛ Brobeck aloba makambo wana, Yesu moto ya Nazarete, oyo bato bamonaka ete alekaki bato nyonso kino lelo, alobaki boye: “Makambo oyo ekoki kosalema te mpo na bato ekoki kosalema mpo na Nzambe.” (Luka 18:27) Elimo santu ya Nzambe ezali nguya oyo eleki nguya nyonso ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mayele moko te ya tekinoloji ekoki koyeba bonene ya nguya yango. Elimo santu ekoki kosalisa biso tósala makambo oyo tokoki kosala te na makasi na biso moko.

Lokola tozali bato, mbala mingi tokutanaka na makambo oyo tomonaka ete tokoki kolonga yango te. Na ndakisa, ndeko na biso moko akoki kokufa to bomoi ya libota na biso ekoki kokóma na mikakatano mpenza oyo ekoki kosala ete tóyoka lokola tokómi na nsuka. To ntango mosusu, tozali lisusu na elikya te na bomoi na biso. Tomonaka ete moto moko te akoki kosalisa biso. Na ntango wana, tokoki kosala nini?

Biblia elobi na biso ete moto oyo azali na kondima epai ya Mozwi-na-Nguya Nyonso mpe asɛngi elimo santu na ye mpe azali kosala makambo nyonso mpo na kosepelisa ye, akoki kozwa lisalisi ya kolonga makambo nyonso oyo ekoki komonana ete akolonga yango te. Yoká maloba ya kolendisa oyo Yesu alobaki: “Ya solo nalobi na bino ete moto nyonso oyo alobi na ngomba oyo ete: ‘Pikolamá mpe bwakamá na mbu,’ mpe azali kotya ntembe na motema na ye te, kasi azali na kondima ete oyo azali koloba ekosalema, ekosalema mpe bongo epai na ye.” (Marko 11:23) Ezali ata na eloko moko te to likambo moko te oyo tokokoka kosala te soki totiki nguya ya Liloba ya Nzambe mpe elimo na ye etambwisa bomoi na biso.

Tózwa ndakisa ya mobali moko oyo asalaki mbula 38 na libala na ye, na nsima mwasi na ye akufi na maladi ya kansɛr. Asilaki mayele. Amonaki ete akokoka te. Ntango mosusu, azalaki kutu kolinga ete akufa, na esika ya kozala na bomoi kozanga mwasi na ye. Alobaki ete amonaki lokola azali kotambola na lobwaku ya molili makasi. Soki akanisi ntango yango, andimaka ete mabondeli oyo azalaki kosala na mai ya miso, kotánga Biblia mokolo na mokolo, mpe koluka na motema mobimba litambwisi ya elimo ya Nzambe esalisaki ye alonga likambo oyo azalaki kokanisa ete akoki kolonga yango te.

Mwasi moko ná mobali na ye bazalaki na mikakatano makasi na libala na bango. Mobali azalaki kobɛta mwasi na ye mpe azalaki na bizaleli mingi ya mabe. Mwasi na ye amonaki ete akoki kofanda malamu te na libala wana. Kutu, alingaki komiboma. Na nsima, mobali na ye abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Makambo oyo ayekolaki esalisaki ye atika bizaleli ya mabe mpe atika kobɛta mwasi na ye. Mwasi na ye akamwaki komona ndenge mobali abongwani nzokande akanisaki ete “ekoki kosalema te.”

Mobali mosusu alobaki ete azalaki na elikya te ete akotika komɛla bangi mpe bomoi ya mbindo oyo azalaki na yango. Alobi boye: “Nazalaki lisusu na valɛrɛ ata moke te.” Abondelaki Nzambe na motema moko, na maloba oyo: “Nkolo, nayebi ete ozali. Nabondeli yo, salisá ngai!” Nsima ya kobondela bongo, Batatoli ya Yehova bayaki koyekola na ye Biblia; yango esalisaki ye abongola bomoi na ye, nzokande emonanaki ete ekoki kosalema te. Alobi boye: “Mbala mingi, makanisi ya koyoka lokola namemi ngambo mpe nazangi valɛrɛ ezalaki koyela ngai. Ntango mosusu, nazalaki komitungisa mpenza. Atako bongo, Liloba ya Nzambe esalisaki ngai nalongola makanisi yango. Na butu, soki mpɔngi ekimi ngai, nazalaki kozongela na motema bavɛrsɛ ya Biblia oyo nayekolaki. Bavɛrsɛ yango esalisaki ngai nalongola makanisi ya mabe.” Lelo oyo, mobali yango abala mpe azali na esengo na libala na ye. Ye ná mwasi na ye bazali kosalisa bato bátyela nguya ya Liloba ya Nzambe motema. Na kotalela bomoi oyo azalaki na yango na bolenge na ye, akokaki kokanisa ete ekoki kosalema te azala na bomoi oyo azali na yango lelo.

Bandakisa wana emonisi ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya mpe elimo santu ekoki kosala na bomoi na biso makambo oyo “ekoki kosalema te.” Kasi, okoki koloba ete: “Yango esɛngi kozala na kondima makasi!” Ezali mpenza bongo. Kutu, Biblia elobi ete “soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa [Nzambe] ata moke te.” (Baebre 11:6) Sikoyo, kanisá naino: Moninga na yo ya motema, oyo mbala mosusu azali mokonzi ya banki to mokonzi moko boye, ayebisi yo boye: “Kobanga te. Soki ozali na mposa ya eloko nyonso, yaká epai na ngai.” Na ntembe, elaka ya ndenge wana ekobɔndisa yo. Kasi likambo ya mawa, mbala mingi, bato bakokisaka maloba na bango te. Ekoki kozala ete moninga yango akutani na likambo moko oyo esali ete akoka lisusu te kokokisa likambo oyo alakaki yo. Soki moninga yango akufi, mposa mpe likoki oyo azalaki na yango ya kosalisa yo esuki mpe wana. Nzokande, Nzambe akoki te kokutana na makambo lokola oyo bato bakutanaka na yango. Biblia elobi ete: “Epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki kosalema te.”​—Luka 1:37.

“Ondimi yango?”

Ezali na makambo mingi oyo emonisi ete maloba wana, oyo euti na Biblia, ezali solo. Tótalela mwa bandakisa.

Sara, mwasi moko ya mbula 90 asɛkaki ntango bayebisaki ye ete akobota mwana mobali, kasi lokola ekólo Yisraele ezali, emonisi ete abotaki mwana yango. Mbisi moko monene emɛlaki mobali moko, asalaki mikolo misato na libumu ya mbisi yango kasi akufaki te mpe akomaki likambo oyo ekómelaki ye. Nkombo na ye Yona. Luka, monganga oyo ayebaki bokeseni oyo ezalaka ntango moto azali komiyeba lisusu te mpe liwa, akomaki ete Etishe, elenge mobali moko, akweaki na lininisa ya ndako moko ya etaje, akufaki kasi azongisamaki lisusu na bomoi. Masolo wana ezali masapo te. Soki toyekoli yango malamumalamu, tokomona ete esalemaki solo.​—Ebandeli 18:10-14; 21:1, 2; Yona 1:17; 2:1, 10; Misala 20:9-12.

Yesu ayebisaki moninga na ye Marta maloba oyo ekoki kokamwisa: “Moto nyonso oyo azali na bomoi mpe azali kondimela ngai, akokufa mokolo moko te.” Nsima ya kopesa elaka wana oyo emonanaki lokola ekoki kosalema te, Yesu abakisaki motuna oyo ya ntina mingi: “Ondimi yango?” Tii lelo, tosengeli kotalela motuna wana malamumalamu.​—Yoane 11:26.

Bomoi ya seko awa na mabele​—Ekoki kosalema te?

Na mokanda moko ya Leta oyo elobeli koumela na bomoi, bakomi balobaki boye: “Ekoumela lisusu te mpo tókóma na likoki ya kozala na bomoi molai koleka oyo tozali na yango lelo​—ata mpe koumela libela na libela.” Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) emonisi ete longola ndenge baselile etikaka kobota, enzulukaka, ebebaka, to esalaka mbongwana mosusu, eloko mpenza oyo esalaka ete moto akufa, nzoto esala lisusu malamu te to etika kosala, eyebani te.a Elobi boye: “Ntina oyo moto anunaka eyebani te. Bato ya siansi bazali kosala nyonso mpo na kopekisa likambo yango, kasi kaka Nzambe nde akosilisa yango.”

Atako makambo nyonso oyo elobami ezali malamu, Biblia epesi biso ntina ya solosolo ya kondima ete tokoki kozala na bomoi ya seko, koleka likambo nyonso oyo siansi ekoki koyebisa biso. Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, Moto oyo apesaka bomoi, alaki ete “akolongola mpenza liwa mpo na libela.” (Nzembo 36:9; Yisaya 25:8) Ondimi yango? Elaka yango euti epai ya Yehova, mpe ye akoki kobuka lokuta te.​—Tito 1:2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba malamu mpenza ntina oyo bato banunaka mpe ntango boni moto asengeli koumela na bomoi, talá lisolo Combien de temps pouvez-vous vivre? na Lamuká! ya Mai 2006, na Lifalanse, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]

“Makambo oyo kala ezalaki komonana ete ekoki kosalema te, lelo oyo ekómá kosalema.”​—RONALD REAGAN

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]

Ntango omonaka ete makambo ya bomoi na yo ekoki kobonga te, olukaka lisalisi epai ya nani?

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 27]

Fɔtɔ ya NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto