Etumba oyo Casiodoro de Reina abundaki mpo na Biblia na Espagnol
NA EKEKE ya zomi na motoba, kotánga Biblia na Espagne ezalaki bongo likámá. Lingomba ya Katolike epesaki etindá na Inquisition ete esukisa botomboki nyonso, ata ya moke mpenza, oyo ekokaki kotɛmɛla bindimeli ya lingomba. Kasi ezalaki na elenge mobali moko na súdi ya Espagne oyo asukaki te bobele na kotánga Makomami, kasi abongolaki yango kútu na lokótá na ye mpo ete banamboka Espagne nyonso bákoka kotánga yango. Nkombo na ye ezalaki Casiodoro de Reina.
Reina akólisaki mposa na ye mpo na Biblia na boumeli ya bambula oyo alekisaki na líkindo ya San Isidro del Campo, pembeni ya engumba Seville, na Espagne. Na boumeli ya bambula 1550, bamofulele mingi kati na líkindo wana ya lokumu bazalaki kolekisa ntango mingi na kotángáká Makomami na esika ya kokokisa mikumba na bango kati na líkindo. Mpe makambo mazwami kati na Biblia mabongolaki lolenge na bango ya kokanisa. Babwakaki mateya ya Katolike na ntina na kosalelama ya bikeko mpe bindimeli na ntina na epongelo. Makanisi na bango mayaki mpenza koyebana kati na etúká wana, mpe lokola babangaki ete noki bakokangama na Inquisition ya Espagne, bazwaki ekateli ya kokima na bamboka mosusu. Reina azalaki moko kati na bamofulele 12 oyo balóngaki kokima na Genève, na Suisse.
Nsima ya kokima wana oyo ebikisaki ye mpenza na liwa, akómaki kotambolatambola na engumba moko mpe mosusu ya mikili ya Mpótó. Na 1562 baoyo balóngaki te kokanga ye batumbaki fɔtɔ́ na ye na Seville, kasi atako bongo makaneli wana malɛmbisaki Reina te kati na mosala na ye ya kobongola Makomami. Atako banyokoli na ye bakanaki kopesa mbano epai na moto nyonso oyo akokaki kokanga ye, atikaki te kosala libongoli na ye na lokótá ya Espagnol. Alobaki ete: “Longolá bobele na ntango oyo nazalaki na maladi to na mobémbo, . . . ekomeli elongwaki na lobɔkɔ na ngai te.”
Na nsima ya mbula zomi, Reina asilisaki mosala na ye. Na 1569 libongoli na ye ya Biblia na mobimba na yango ebimisamaki na mboka Basel, na Suisse. Búku wana monene ezalaki libongoli ya liboso ya mobimba na Espagnol ebongolami uta na nkótá ya ebandeli. Na boumeli ya bikeke mingi Biblia ya Latin nde ezalaki kosalelama, kasi Latin ezalaki lokótá ya mwa etuluku moke ya bato oyo batángaki kelasi milai. Reina andimisamaki ete bato nyonso basengelaki koyeba Biblia, atako bomoi na ye ezalaki na likámá wana ezalaki ye kosala ete mokano na ye mokende liboso.
Na maloba ya ebandeli ya libongoli na ye, alobelaki bantina ya mokano na ye. “Na ntembe te, kopekisa kobongolama ya Makomami Mosantu na lokótá ya bato banso ezali mpenza kofinga Nzambe mpe kobebisa bolamu ya bato. Ezali polele ete kosala bongo ezali mosala ya Satana mpe ya bato oyo ye azali koyangela. . . . Na komonáká ete Nzambe apesaki Liloba na ye epai na bato, na mokano ete bato báyeba yango mpe básalela yango, ye oyo akopekisa kobongolama na yango na nkótá mosusu akoki kozala na mokano malamu te.”
Liloba wana oyo alobaki ezali komonisa mpiko mpamba te ebimaki bambula 18 nsima wana mokanda oyo etángaki biloko nyonso oyo Inquisition ya Espagne ezalaki koboya epekisaki kotángama ya Biblia “na lokótá ya Espagnol to na lokótá mosusu oyo bato mingi balobaka.” Emonani polele ete Reina amitikaki te ete bobángi bato epekisa bolingo na ye mpo na solo.
Reina azalaki te bobele na mposa makasi ya kosala ete bato nyonso oyo balobaka Espagnol bázala na likoki ya kozwa Biblia, kasi azalaki mpe na mposa ya kobimisa libongoli ya sikisiki. Na maloba na ye ya ebandeli alimbolaki matomba ya kobongola Biblia mbala moko uta na nkótá ya ebandeli. Reina alobaki ete mabungá mosusu masilaki kokɔta na libongoli ya Latin oyo ebéngamaki Vulgate. Moko na mabungá minene oyo emonanaki kuna ezalaki bongo kolongolama ya nkombo ya Nzambe.
Nkombo ya Nzambe kati na mabongoli ya Espagnol
Reina asosolaki ete nkombo ya Nzambe, Yehova, esengelaki komonana kati na libongoli nyonso ya Biblia oyo esalemi na motema sembo, lokola ezali kati na makomi na yango ya ebandeli. Aboyaki kolanda momeseno ya kokitanya nkombo ya Nzambe na maloba ya lokumu lokola “Nzambe” to “Nkolo.” Na maloba ya ebandeli ya libongoli na ye, alimbolaki polele ntina oyo asalaki bongo.
“Tosili kobatela nkombo (Iehoua), mpamba te tozalaki na ntina ebongi mpenza ya kosala bongo. Ya liboso, ezali mpo ete epai nyonso oyo yango ekoki komonana kati na libongoli na biso, ezali mpe bongo kati na makomi ya Liebele, mpe tomonaki ete tokokaki te kolongola yango to kobongola yango noki tokosala likambo oyo ezali sembo te mpe tokotuka mobeko ya Nzambe, oyo apesi etindá ete eloko moko te elongolama to ebakisama. . . . Momeseno [ya kolongola nkombo yango], oyo Zábolo azali kolendisa, eutaki na biyambayamba ya ba Rabbi ya mikolo na biso oyo, atako balobaka ete bapesaka yango lokumu, kasi basili kokunda nkombo na Ye mosantu, kosaláká ete libota ya Nzambe bábosana nkombo oyo na nzela na yango alingaki ete akesenisama na banzambe . . . mosusu nyonso.”
Mposa kitoko oyo Reina azalaki na yango ya kokɛmbisa nkombo ya Nzambe ebimisaki matomba minene. Kino na mikolo na biso, mabongoli mingi mpenza ya Espagnol—ezala ya Bakatolike to ya Baprotestá—mazali kolanda ndakisa wana, kosaleláká nkombo ya Nzambe kati na Biblia mobimba. Ezali mingi mpenza mpo na Reina nde batángi ya mabongoli pene na nyonso ya Espagnol bakoki kososola ete Nzambe azali na nkombo na ye moko oyo ekesenisi ye na banzambe mosusu nyonso.
Likambo oyo esengeli kobenda likebi na biso ezali ete nkombo Yehova na Liebele emonani polele na lokasa ya liboso ya Biblia ya Reina. Reina apesaki bomoi na ye mobimba mpo na kokokisa mokano kitoko ya kobatela Liloba ya Nzambe, kosaláká ete emonana na lokótá oyo bamilió ya bato bakoki kotánga.