Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/95 lok. 3
  • Moto moko azali nde na mposa ya lisalisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto moko azali nde na mposa ya lisalisi?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • “Bólinganaka makasi”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Lisalisi oyo ezali mpasi te komona yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Kobá kokolisa bolingo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Bókoba kokola na bolingo ya bondeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 10/95 lok. 3

Moto moko azali nde na mposa ya lisalisi?

1 Yehova amonisami epai na biso lokola Ye oyo asalisaka biso, ekimelo na biso. Ya solo, toyebi ete tokoki kobyanga ye ete asalisa biso mpe ete asunga biso. (Nz. 18:2; 46:1) Na yango, tokomekola misala ya Yehova mitondi na boboto na kosungáká baoyo bazali na mposa ya lisalisi.

2 Nini esengeli kopusa biso kati na likambo yango? Bato mingi bandimi ete kosalisa moto ezali mpenza komonisa bolingo mpe boboto. Biblia emonisi polele ete tosengeli kolanda lolenge wana ya kokanisa. (Lom. 15:1) Ntoma Paulo alendisi biso ete ‘tótalela bobele matomba na biso moko te kati na makambo na biso, kasi tótalela mpe matomba ya basusu.’​—Filp. 2:4.

3 Moto nyonso azali na likoki ya kozwa esengo oyo ezali kouta na lolenge wana ya kosala. (Mis. 20:35) Na miso ya ntoma Paulo, elenge Timote azalaki ndakisa moko monene na likambo litali ‘komitungisa mpo na makambo matalaki’ bandeko na ye. (Filp. 2:20) Ezali mpenza likambo ya esengo na komona lelo ete bilenge mingi bazali komonisa elimo motindo moko wana kati na lisangá! Kasi, tózala bilenge to mikóló, biso banso tokoki kopesa lisungi ntango tomoni ete moto moko azali na mposa ya lisalisi.

4 Tosilá kokanisa ete likoki ya kosala mingi koleka lizali mpo na kosunga bamoko ya basangani ya lisangá? Ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo akɔti lopitalo azali nde kotalama mingi te? Moko na bandeko na biso azali lisusu na likoki ya kotambola te mpe azangi moto oyo ye akoki kotinda to oyo akoki kosalisa ye mpo na kokokisa misala na ye ya ndako? Mpo na Yesu, basaleli ya Yehova basali libota oyo basangani na yango bazali kosalisana. (Mko. 3:33-35) Kati na lisese ya bampate mpe bantaba, Yesu alobaki ete baoyo batyami na lobɔkɔ ya mobali na Mokonzi, elingi koloba baoyo bandimami na ye, batyami wana mpamba te bazalaki kosalisa bandeko na ye.​—Mat. 25:40.

5 Lolenge tokoki kopesa lisalisi: Tokosala nini soki emonani polele ete moto moko azali na mposa ya lisalisi? Mpo na nini te kozwa mokano ya kosala eloko moko oyo ekozala litomba mpo na ye? Ekoki kozala ete Bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bakómi mibange bazali na mposa ya kolendisama, kasi bazangi moto oyo azali penepene na bango mpo na kopesa bango lisungi, to ekoki kozala ete elenge moklisto moko nde asengeli kopesamela lisalisi. Babalani oyo babandi kosepela na solo kala mingi te bakoya mbala mosusu na Ndako ya Bokonzi elongo na bana na bango wana mosakoli oyo ayekolaka na libota yango azali te. Na ntembe te, babalani yango bakosepela ete moto moko andima kosalisa bango na kobatela bana.

6 Wana bolingo na biso mpo na solo mpe mpo na lisangá ya Yehova ezali kokola, tokozala na bolingo mingi mpo na basangani mosusu ya lisangá mpe tokomibanzabanza mpo na bango. Ntoma Paulo alendisi biso ete tózipola mitema kati na likambo yango. (2 Kol.6:11-13) Yesu amonisaki likambo oyo polele ete, libosoliboso, ezali na komonisáká bolingo kati na biso nde tokomonisa ete tozali bayekoli na ye ya solo.​—Yoa. 13:35.

7 Na yango, soki tomoni ete moto moko azali na mposa ya lisalisi, bolingo ya solo oyo tozali na yango mpo na bandeko na biso mpe mpo na lisangá na mobimba na yango, ekopusa biso na kozwa ekateli mpe kopesa lisalisi na lolenge moko to na lolenge mosusu. (Gal. 6:9, 10) Na kosalisanáká na lolenge yango bamoko na bamosusu, tozali kokembisa nsinga na biso ya bolingo mpe koyeisa makasi bomoko na biso. (1 Kol. 10:24) Ɛɛ, tokokokisa mokumba na biso na oyo etali kosalisa basangani ndenge na ndenge ya lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto