Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/95 lok. 4
  • Tóluka baoyo balingi koteyama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóluka baoyo balingi koteyama
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Tózala na mokano na ntango ya bozongeli na biso ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Kozongela bato epesaka nzela na boyekoli ya Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Lingomba
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 10/95 lok. 4

Tóluka baoyo balingi koteyama

1 “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai akobenda ye.” (Yoa. 6:44) Yehova, oyo azali kotalatala mitema, akopesa mbano epai na baoyo balingi koteyama mpe baoyo bazali kosala na boyokani na makambo oyo bazali koyekola. (Yil. 17:10; Yoa. 6:45) Soki tozali koluka basɔkɛmi oyo bazali na mposa ya kobika kati na mokili ya sika, tokozala na esengo monene ya kozala basalani na Ye elongo.​—Nz. 37:11; 1 Kol. 3:9.

2 Yesu alobaki ete bayekoli na ye bazali “balɔbi na bato.” (Mat. 4:19) Ya solo, mosala motindo wana ezalaka mbala mosusu makasi, kasi epesaka bosepeli monene na nzela ya matomba kitoko oyo yango ezali kobimisa. Na esika ete tómipesa mpo na matomba na biso moko, tozali nde kobikisa “bambisi” longwa na libebi mpenza. Molɔbi ya solosolo ayebi lolenge ya kolɛngola mbisi. Bobele bongo, tosengeli kolakisa nsango ya Bokonzi na lolenge malamu mpenza, oyo ekolamwisa mposa ya balobani na biso. Yango ekozala malamu mingimingi na ntango tozali kosala bozongeli ya sika. Tokoki koloba nini?

3 Soki molobani na biso amonisaki bosepeli mpo na masolo ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” oyo mazali kolobela lingomba, tokoki koloba boye:

◼ “Mbala eleki, tolobelaki likambo oyo ete bato mingi balingaka te kosolola makambo matali lingomba. Na ntembe te, yango ezali kokamwisa yo, mpamba te bato mingi oyo bazingi biso balobaka ete bazali baklisto, boye te? Ozali komituna mbala mosusu ntina nini lingomba ezali likambo oyo lizali kobimisa bokabwani mpe ntembe mingi?” Tótika moto yango ayanola. Tófungola buku Comment raisonner na lokasa 310, mpe tólobela mwa makanisi oyo mamonisami na nse ya motó na likambo moke “Mpo na nini mangomba makómi ebele?”

4 Mbala mosusu tokosepela kobanda lisolo na lingomba na lolenge lokokani na oyo wana, na kolobáká ete:

◼ “Ezali mpenza na mwango ya sikisiki mpo nakoyeba soki tozali na lingomba ya solo? [Tótika moto yango ayanola.] Mangomba makómi ebele na boye ete bato bakɔti na mobulungano mpe bazali lisusu koyeba te oyo basengeli kopona.” Tófungola na lokasa 316 kino lokasa 318 ya buku Comment raisonner, epai kuna motuna oyo etunami ete “Ndenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?” Tólimbola na mokuse motuna 5, “Basangani na yango balinganaka mpenza bamoko na bamosusu?” Tóyebisa moto yango ete akoyeba lisusu makambo mingi na nzela ya boyekoli ya Biblia oyo tokosala elongo na ye.

5 Soki emonani ete molobani na biso azali komitungisa na ntina na bizalela ya makambo ya mokili, tokoki mbala mosusu koloba ete:

◼ “Emonani lokola ete ozali komitungisa na bizalela ya mpasi oyo kati na yango tosengeli kobika mpe kobɔkɔla bana na biso. Biblia ezali komonisa elaka moko kitoko oyo, etikali moke, Nzambe akokokisa yango.” Tótánga Masese 2:21, 22 mpe tólimbola ete Yehova alaki kosala mokili ya kimya oyo mokoumela libela na libela.

6 Ntango tokozongela lisusu bato na komemáká batrakte Nsango ya Bokonzi, tósala ete tótika yango epai na bato banso oyo bazwaki naino yango te. Na boyokani na oyo elobamaki kati na Mosala na biso ya Bokonzi, tokoki kokoba kolakisa batrakte wana na boumeli ya ntango nyonso oyo yango ekozala kati na libombo na biso ya mikanda mpe tokopesa yango epai na bato ntango bazali na likoki te ya kozwa bazulunalo.

7 Lokola Liloba ya Nzambe lizali na nguya, esengeli ete tómeka kosalela yango kati na maloba na biso ya bokɔti na lisolo. (Ebe. 4:12) Tosengeli mpenzampenza kolendisa molobani na biso ete atángaka Biblia. (Talá Misala 17:11) Soki tozali kokokisa mokumba na biso malamumalamu, Yehova akopambola milende na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto