Tózala na mokano na ntango ya bozongeli na biso ya sika
1 Ntango tozongi kotala moto moko, tósala molende ya kosalela mokapo moko oyo ekokólisa boyebi oyo azali na yango likoló na lisoló moko ya Biblia oyo tolobaki elongo na ye.
2 Moko na mikano ya bozongeli ya sika soki totikaki bazulunalo ezali ya kozwa bato oyo tokobanda kotikela bango bazulunalo mbala na mbala. Kolakisama ya pɛtɛ lokola oyo ekoki kozala malamu:
◼ “Nakanisi osepelaki na botángi ya lisoló lizwami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli natikelaki yo, oyo lizali kolimbola mpo na nini tosengeli kobanga Nzambe uta sikawa. Lelo namemeli yo lisoló moko ya Lamuká! lizali kobimisa motuna oyo: ‘Mpo na nini bomoi ezali mpenza mokuse?’ Ezali motuna moko kitoko, boye te?” Tókóba na koloba na ndakisa: “Yoane 3:16 ezali komonisa maloba ya Yesu oyo mayebani mingi, oyo matali elaka ya kozala na bomoi ya seko. Soki ozwi zulunalo oyo, okolendisama na elikya moko makasi oyo Liloba ya Nzambe ezali kopesa.” Na nsima tóloba ete tokomemela ye banimero oyo ekolanda mpe ete mbala mosusu tokosolola na ye lisusu na ntina na makambo oyo Nzambe alaki mpo na bato ya botosi. Tómikundola ete mbala nyonso tozali komemela moto bazulunalo, tokoki kotánga yango lokola bozongeli ya sika.
3 Soki totikaki zulunalo oyo ezali na motó ya likambo “Mokili mozangi bitumba—Ntango nini?” tokoki koloba boye:
◼ “Bomoi ekokaki kozala ndenge nini soki bitumba ezalaki te? [Tótika moto yango ayanola.] Talá oyo Nzambe azali kokana kosala.” Tótánga Nzembo 37:10, 11, mpe tólobela makambo oyo makozala na mokili ntango mokano ya Nzambe ekokokisama. Tókundwela moto yango makambo oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye ete babɔndelaka mpo na yango, engebene Matai 6:9, 10. Tósala ete amanyola likoló na ndimbola ya maloba ya Yesu. Soki moto yango amonisi mpenza bosepeli, tokoki kosɛnga na ye ete asala abonemá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Lamuká! mpe tózwa bibongiseli mpo na kozonga kosolola na ye.
4 Soki tozongi mpo na kolobela lisoló “Mpo na nini bomoi ezali mpenza mokuse?” tokoki kobanda lisoló na lolenge oyo:
◼ “Mbala eleki tolobelaki likambo litali boumeli ya bomoi ya moto. Na ntembe te lokola omoni yango kati na masoló ya Lamuká!, banganga-mayele bazali na elikya mingi te ya kosunga biso mpo na kozala na bomoi koleka mibu 70 to 80. Kasi, okanisi nini likoló na oyo Biblia ezali kolaka? [Tótika moto yango ayanola.] Biblia emonisi ete Nzambe azali kokana likambo moko ya malamu mpo na moto.” Tótánga Yoane 17:3, mpe tólimbola ete boyebi ekoki komema na bomoi ya seko. Soki tokómi wana, tósɛnga boyekoli ya Biblia to tókamata bibongiseli mpo na lisoló mosusu ya Biblia.
5 Kobanda boyekoli ya Biblia ezali mokano moko ya ntina mingi kati na mosala na biso ya kosakola. Mbala mosusu tosilaki kozongela kotala moto moko mbala na mbala oyo andimaka kokamata bazulunalo. Mbala ya nsima oyo tokokutana na moto yango tokoki koloba boye:
◼ “Bato bazali na makanisi ndenge na ndenge na ntina na lingomba mpe mosala na yango kati na bomoi na mikolo na biso. Bindimeli bitali bantina mpo na yango Nzambe atiki nzela na mpasi to ntina ya bobangé mpe liwa, ezali mpenza na bongolabongola. Basusu balingaka mpe koyeba nini basengeli kosala mpo ete Nzambe ayoka mabondeli na bango.” Tófungola moko na mikanda oyo mibongisami mpo na boyekoli ya Biblia, kati na eteni moko oyo ezali kolobela lisoló moko, engebene biso, ekosepelisa moto yango, mpe tólakisa ye na mokuse lolenge oyo totambwisaka boyekoli.
6 Yehova amityelaka mikano. Tómekola ye na sanza ya Apríli na kozaláká na mokano ntango tozali kosala bozongeli na biso ya sika.