Bozongeli ya molende na lisalisi ya mateya mabongi
1 Bozongeli ya sika ezali eteni moko ya ntina mingi mpe ya esengo kati na mosala na biso ya kosakola. Mpo na nini kozongela nokinoki bato oyo bamonisaki bosepeli? Na lisalisi ya mosala motali kozalisa bayekoli, nkombo ya Yehova ezali koyebana, kokumisama, mpe baoyo bakobangaka Nzambe bazwaka lisungi oyo bazali na yango mposa mpo na komona nzela ya bomoi. (2 Kol. 2:17 kino 3:3) Soki tososoli ete kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe ete bomoi ya bato ezali na likámá, tokopusama na komibongisa malamu liboso ete tózonga kotala bato oyo bamonisaki bosepeli.
2 Motei malamu asungaka moyekoli ete atonga likoló na moboko oyo mosili kotyama. Lolenge moko na molakisi oyo abakisaka mokolo na mokolo likoló na boyebi oyo banakelasi bazwaka, tosengeli kolandisa bokutani na biso ya liboso na bandimbola mosusu na lisoló bobele yango. Yango epesaka nzela na kotikala na molɔngɔ́ ya makanisi bobele moko mpe kokólisa bososoli mokemoke.
3 Soki tozongeli moto nsima wana totikaki mwa búku “Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?,” tokoki koloba boye:
◼ “Mbala eleki, tolobelaki makambo matali ‘mikolo ya nsuka’ oyo Biblia ezali kolobela mpe ndimbola na yango mpo na biso. Na ntembe te, omitunaka mpo na oyo epesaka biso nzela na kondima ete tozali kobika na mikolo ya nsuka. (2 Tim. 3:1) Bayekoli ya Yesu bazalaki na mposa makasi ya kozwa eyano na motuna yango. [Tótánga Matai 24:3.] Kati na eyano na ye, Yesu alobeli makambo oyo tozali komona zingazinga na biso, bakisá kobeba ya makambo mpe mobulu oyo esalemá naino te.” Tóbimisa makambo oyo mazali komonisa elembo oyo mazali kati na paragrafe 3 mpe 4, lokasa 19. Soki moto yango amonisi bosepeli, tólakisa makambo mosusu ya elembo oyo malobelami na paragrafe 5 kino paragrafe 8, lokasa 20. Tósɛnga kozonga mpo na koyanola na mituna oyo mibimisamaki na lokasa ya ebandeli ya mwa búku.
4 Mpo na kosimba bosepeli oyo moto amonisi na mwa búku “Quel est le but de la vie? Comment le découvrir? ” tokoki koloba boye:
◼ “Nasepeli kozongela lisoló na biso oyo litali ntina ya bomoi. Ondimisami solo ete Nzambe alingaki komona biso kozala na bomoi mpe na kimya awa na mabelé, kati na mobulu te lokola tozali komona yango. Okanisi ete akokokisa elaka na ye? ” Tótika ete moto yango ayanola. Tótánga Yisaya 55:11, mpe na nsima tólobela makanisi oyo mazwami kati na baparagrafe 25 kino 27, na lokasa 30. Tómonisa ete boyekoli ya Biblia ezali mwango malamu koleka mpo na kopesa ntina na bomoi na biso.
5 Mpo na kosimba mposa oyo ebimisamaki na mwa búku “Sepela na bomoi ya seko na Mabele!” tokoki kolakisa yango lisusu mpe koloba ete:
◼ “Tolobelaki mokili moko kitoko oyo momonisami na ezipeli ya mwa búku oyo. Nayei kolimbwela yo mpo na nini ezali na ntina ete baoyo balingi kozala na bomoi na esika yango bazala na kondima epai na Yesu Klisto.” Tólakisa elilingi 41 mpe tótánga Yisaya 9:6. Na elilingi 62, tótánga Yoane 3:16 mpe tóbɛta nsɛ́tɛ́ likoló na ntina ya kotosa. Tólimbola ete Batatoli ya Yehova basungaka bato; bateyaka bango lolenge nini bakoki komonisa kondima, na koyekoláká Biblia mpe na kosaláká milende ya kosalela batoli na yango.
6 Tótalela moko na moko ya bozongeli na biso ya sika mpo na kozwela yango matomba. Tómituna: Kati na makanisi na ngai, nazalaki na likambo moko ya sikisiki mpo na kolobela? Nabendaki likebi likoló na Biblia? Natongaki likoló na miboko oyo mityamaki na bokutani ya liboso? Bokɔti na ngai na lisoló ezalaki malamu mpo na kobanda boyekoli ya Biblia? Soki eyano na biso na mituna oyo ezali ɛɛ, tokosala mpenza oyo ekoki na biso mpo na kozala batei malamu ya Liloba ya Nzambe.