Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/96 lok. 5
  • Tiká ete bokóli na yo emonana!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tiká ete bokóli na yo emonana!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Tika ete kokola na yo emonana polele
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Monisá ete ozali kokola mpe kokende liboso
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Bilenge—Bómonisa bokoli na bino polele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Monisá polele ete ozali kokende liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 12/96 lok. 5

Tiká ete bokóli na yo emonana!

1 Omikundola mbala ya liboso oyo oyokaki nsango ya Bokonzi. Mateya ya pɛtɛɛ matali solo malamwisaki mposa na yo ya koyeba mpe ya kokanga ntina. Komonáká ete banzela ya Yehova etombwani mingi koleka banzela na yo, oumelaki te na kososola ete esengelaki na yo kobongola lolenge na yo ya bomoi. (Yis. 55:8, 9) Osalaki bokóli, opesaki bomoi na yo epai na Nzambe mpe ozwaki batisimo.

2 Ata nsima na kosala mwa bokóli na elimo, ozalaki naino na mwa bolɛmbu oyo osengelaki kolónga na makambo mosusu. (Lom. 12:2) Mbala mosusu ozalaki kokenda kosakola na motema moko te, na ntina na bobangi ya bato. To mpe ozalaki na mokakatano mpo na kolóna mbuma ya elimo ya Nzambe. Kasi olɛmbisaki mabɔkɔ te, mpamba te ozwaki ekateli ya kokóla na komityeláká mikano ya teokrasi.

3 Uta osilá komipesa epai na Nzambe, mbala mosusu bambula mingi esili koleka. Na kotalela mikolo mileki, osili kosala bokóli ya lolenge nini? Osili kokokisa ndambo na mikano oyo omityelaki? Ozali ntango nyonso na molende ‘oyo ozalaki na yango na ebandeli’? (Ebe. 3:14) Ntango Paulo alobaki na ye ete: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bámona ete ozali kotambola liboso.”​—1 Tim. 4:15.

4 Tómitalela. Soki totaleli bomoi na biso kobanda ntango wana kino sikawa, tozali komona nini? Tozali naino nde na mwa bolɛmbu oyo tozalaki na yango na ebandeli? Tosili nde kotika pembeni mikano oyo tomityelaki? Soki ɛɛ, mpo na nini? Ekoki kozala ete tozalaki na makanisi malamu, nzokande tozalaki kozongisa yango nsima. Mbala mosusu totikaki nzela ete mitungisi ya bomoi milɛmbisa biso.​—Luka 17:28-30.

5 Ya solo, makambo ya kala masilá koleka, kasi oyo mazali koya mazali ya biso. Tómitalela na kolongobana nyonso biso moko, tóyeba bisika oyo tozali na bolɛmbu, na nsima tósala nyonso mpo na komisembola. Mbala mosusu ekozala malamu komonisa mbuma ya elimo ya Nzambe, na ndakisa komipekisa, bopɔlɔ, to motema molai. (Gal. 5:22, 23) Soki tozali na mokakatano mpo na koyokana elongo na basusu to na kosalana elongo na bankulutu, esengeli tólóna elimo ya komikitisa.​—Filp. 2:2, 3.

6 Bokóli na biso ekomonana nde mingi soki tozali koluka kozwa mikumba kati na lisangá? Na ntembe te, bandeko mibali bazali na likoki ya kokóma basaleli na misala to bankulutu, soki basali mwa milende na makambo mosusu. Bamoko kati na biso bazali ntango mosusu na likoki ya kokóma babongisi-nzela ya sanza na sanza. Mpo na basusu, mosala ya mobongisi-nzela mosungi ezali mokano oyo bakoki kokokisa. Basusu mpe bakoki kosala makasi na kobongisa mimeseno na bango ya boyekoli, na kosangana na molende nyonso na makita ya lisangá, to na kozala basakoli oyo bazali kobota mbuma mingi.

7 Ya solo, ezali likambo ya mokomoko koyeba na makambo nini asengeli kokóla. Tóndimisama ete tokozala na esengo mingi mpe tokobota mbuma mingi koleka kati na lisangá soki tozali kosala milende ya solosolo mpo na ‘kokende liboso kino kokɔmela.’​—Ebe. 6:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto