Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/96 nk. 3-4
  • Bozongeli na eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 12/96 nk. 3-4

Bozongeli na eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Bozongeli wana babúku ezali ya kokangama, na kotalela masoló masalemaki na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi kobanda pɔ́sɔ ya 2 Sɛtɛ́mbɛ kino na pɔ́sɔ ya 23 Desɛ́mbɛ 1996. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia mpo na koyanola na mituna nyonso miye mipesami. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso mizali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokutá na moko na moko na maloba malandi:

1. Elisabeth azalaki moto ya libota ya Yuda, motindo moko na ndeko na ye Marie. [ad lok. 445 par. 5]

2. Ezali mpenza na “mbisi monene” te oyo ekoki komela moto mobimba. (Yona 1:17) [si lok. 145 par. 4]

3. Epaphras mpe Epaphrodite bazalaki bango mibale basalani na ntoma Paulo. [ad lok. 461 par. 7-8]

4. Esakweli oyo ezwami na Danyele 9:24, 25 etaleli kobotama ya Yesu. [kl lok. 36 par. 8]

5. Ebed-Mélec, mokube Moetiopia, asalisaki Yilimia na kobima na libulu ya Malekiya oyo litondaki na pɔtɔpɔtɔ. [ad lok. 417 par. 3]

6. Hénoch amonaki kufa te mpo ete amemamaki na nzoto na ye kuna na likoló. (Gen. 5:24) [ad lok. 657 par. 8]

7. Esakweli ya Hosea etalelaki mpenzampenza bokonzi ya Yuda oyo esangisaki mabota mibale. [si lok. 136 par. 8]

8. Lisɛngami ya liboso mpo na kosala na Komité ya Etúká mpo na Botongi ezali ete osengeli kozala na eksperiansi mingi ya misala ya botongi ndako mpe kozala na boyebi mozindo ya batekiniki ya botongi. [jv lok. 325 par. 6]

9. Engebene Sefania 3:9, basaleli ya Nzambe bakozala na bomoko kati na mokili ya sika mpamba te bango nyonso bakoloba lokótá bobele moko​—Liebele. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá wF89 1/6 lok. 30.]

10. Elihu amimonisaki moninga ya solosolo ya Yobo na komityáká na ngámbo na ye. [ad lok. 444 par. 9-10]

Yanolá na mituna milandi:

11. Mpo na nini ebongi ete bisika ya sikisiki mpo na makita ya masangá na mokili mobimba bibéngama Ndako ya Bokonzi, mpe ndako ya liboso oyo ebéngamaki na nkombo wana ezalaki epai wapi? [jv lok. 319 par. 2]

12. Kati na Makomami, maloba nini ya [bilenge] Baebele misato mamonisi ete botosi na bango epai na Nzambe etalelaki te kobatelama mpe kobikisama na Nzambe? (Dan. 3:16-​18) [si lok. 134 par. 20]

13. Mokanda nini, mokapo nini, mpe vɛ́rsɛ nini ya Biblia, esakolaki esika ya kobotama ya Masiya? [si lok. 148 par. 6]

14. Mpo na nini misala ya kokamwisa oyo moto akoki kosala na nkombo ya Yesu mizali te elembeteli ya solosolo oyo emonisi ete moto yango andimami to asungami na Nzambe? [kl lok. 46 par. 6-7]

15. Mpo na nini Batatoli ya Yehova babondelaka te ete Nzambe atya nokinoki nsuka na bitumba mpe na bozangi bilei, mpe ete apɛngola minyoko nyonso? [jv lok. 317 par. 4]

16. Na ndenge nini Mokonzi-mwasi Esther amonisaki mbuma ya komipekisa? [ad lok. 494 par. 11]

17. Atako Eli azalaki nganga monene na Yisalaele, bolɛmbu nini ezalaki na ye, oyo atikelaki yango nzela ete ekóla mingi, na oyo etali etamboli ya bana na ye, mpe yango ebimiselaki bango likámá nini? (1 Sam. 2:12, 29, 34) [ad lok. 441 par. 7-8]

18. Davidi azalaki koloba mpo na nani kati na Nzembo 52:2, 3, mpe mpo na nini moto yango azalaki mpenza moto abongi koyinama? [ad lok. 407 par. 6-7]

19. Na Hagai 2:9, tempelo nini ezalaki ‘ndako ya nsima,’ mpe oyo wapi ezalaki ‘ndako ya liboso,’ mpe mpo na nini nkembo ya ‘ndako ya nsima’ elekaki oyo ya ‘ndako ya liboso’? [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá wF89 1/6 30.]

20. Hosea 14:2 elendisaki Bayisalaele ete básala nini, mpe lolenge nini Batatoli ya Yehova bazali kokokisa esakweli yango lelo? (Ebe. 13:15) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w94 15/9 lok. 10 par. 1-2.]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ́ milandi:

21. Engumba ․․․․․․․․ ebéngamaki engumba ekosopaka makila uta na maloba ya mosakoli ․․․․․․․․ mbula soko 200 nsima wana ․․․․․․․․ asilaki kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki ye ete asala kuna. [si lok. 146 par. 11, lok. 151 par. 10]

22. Tosengeli kosambela Nzambe na ․․․․․․․․ wana topusami na mitema mitondi na kondima mpe na bolingo; tosengeli mpe kosambela ye na ․․․․․․․․ na koyekoláká Liloba na ye. [kl lok. 45 par. 4]

23. Mosakoli ․․․․․․․․ asɛngaki Mokonzi ․․․․․․․․ ete bokutani esalema elongo na basakoli 450 ya ․․․․․․․․ , bokutani oyo nsuka na yango emonisaki ete Yehova azali Nzambe ya solo mpe ete ayanolaka na ․․․․․․․․ . (Yak. 5:16, 17) [ad lok. 443 par. 1-2]

24. Ndakisa ya boklisto oyo ․․․․․․․․ , mwasi moko Moyuda, mpe mwana na ye ․․․․․․․․ bapesaki, emonisi ete baoyo bazali na mabota ․․․․․․․․ bakoki kolónga koteya bana na bango ete bábanga Yehova. [ad lok. 502 par. 2]

25. Bilembeteli misato ya ntina oyo bindi⁠misi ete Yesu azalaki Masiya bizali oyo (1) ․․․․․․․․, (2) ․․․․․․․․, mpe (3) ․․․․․․․․. [kl nk. 33-38 par. 6-10]

Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:

26. Na ekeke ya liboso, kososolama ya Amosa (8:11; 9:2, 3; 9:11, 12) esungaki lisangani ya mikóló-bakambi na koyeba ete koyanganisama ya bato oyo bazalaki Bayisalaele te kati na lisangá ya boklisto ezalaki mokano ya Nzambe. (Mis. 15:13-19) [si lok. 142 par. 16]

27. Ntango (Amosa; Yoele; Habakuku) abyangamaki na Yehova, azalaki mosakoli te mpe azalaki mwana na mosakoli te, kasi azalaki nde mobɔkɔli na mpate mpe mopɛtoli na (mbila; figi; olive) na nzeté na sikomore. [si lok. 140 par. 1]

28. Lisekwa ya liboso oyo lisalemaki na mabɔkɔ na ntoma moko, mpe liyebisami [kati na Makomami], lisalemaki ntango (Yoane; Petelo; Paulo) akendaki na Yafo mpe atelemisaki (Dorcas; Lydie; Eutyche) longwa na kufa. [ad lok. 411 par. 3-4]

29. Kati na “babɔndisi” misato [ya Yobo], (Bildad; Eliphaz; Zophar) azalaki moto ya liboso na koloba mpe amonani ete azalaki na bopusi mingi koleka basusu, mpe yango epesi likanisi ete azalaki ntango mosusu (na bozwi koleka basusu nyonso; na mayele koleka basusu; mokóló na bango nyonso). [ad lok. 445 par. 2]

30. Ndeko ya (Joseph; Ismäel; Jacob) oyo abotamaki na ye mapasa abéngamaki Esaü mpo ete azalaki (mwana ya liboso; moto na bokila; na nsuki mingi na nzoto na ye mobimba), mpe na nsima azwaki nkombo (Nimrod; Edom; Baal) mpo na supu motane ya ndunda oyo atekaki lotómo na ye ya bonkulutu mpo na yango. [ad lok. 477 par. 4]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nsé: 2 Mik. 2:23, 24; Sef. 2:3; Filp. 2:25-30; Yak. 1:26, 27; 1 Yoa. 2:15-17

31. Mpo ete losambo na biso endimama na Nzambe, yango esengeli te bobele kozala pɛto na oyo etali misala ya mokili kasi esengeli lisusu kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe amoni ete mazali na ntina. [kl lok. 51 par. 20]

32. Bana oyo bazangi limemya epai na basaleli ya sembo ya Yehova bazali na ngambo liboso na ye. [ad lok. 446 par. 3]

33. Ntango mpe makambo makanami te ezali kokwela ata basaleli ya sembo ya Yehova. [ad lok. 461 par. 8]

34. Lokola tozali baklisto ya solo, tosengeli koboya misala nyonso oyo mizali komonisa elimo ya mokili ya mbindo oyo ezingi biso. [kl lok. 50 par. 17]

35. Tosengeli te kosakana na motema mawa ya Nzambe. [si lok. 156 par. 11]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto